Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/07 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 12/07 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Tokoki mpe kolakisa buku Pusaná penepene na Yehova to Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Yanuali: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1991. Masangá oyo ezali na buku yango te, bakoki kolakisa buku Boyebi to mwa buku Bókɛngɛlaka! Febwali: Y-a t-il un Créateur qui se soucie de vous? to Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Marsi: Tokolakisa buku Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.

◼ Mokɛngɛli-mokambi akopona ndeko moko oyo akotalela kɔnti ya lisangá mpo na sanza ya Sɛtɛmbɛ, Ɔkɔtɔbɛ, mpe Novɛmbɛ. Esengeli te ete ndeko wana kaka atalelaka kɔnti yango mbala nyonso. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.—Talá formilɛrɛ Instructions pour la comptabilité des congrégations (S-27).

◼ Ekaniseli mpo na mobu 2009 ekosalema na mwaminei 9 Aprili, nsima ya kolala ya moi. Liyebisi oyo epesami liboso mpo ete epai oyo masangá mingi bazali kosalela Ndako ya Bokonzi moko, masangá mosusu ekoka kozwa bibongiseli mpo na koluka bisika mosusu ya kosala Ekaniseli. Na masangá oyo esengeli koluka esika mosusu ya kosala Ekaniseli, bankulutu basengeli koyokana malamu na nkolo esika yango mpo báyeba malamu soki makambo mosusu ekosalema te na esika yango. Yango ekopesa nzela Ekaniseli esalema na kimya mpe na mobulu te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto