Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/07 lok. 7
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 12/07 lok. 7

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 31 Desɛmbɛ 2007. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 5 Novɛmbɛ tii na pɔsɔ ya 31 Desɛmbɛ 2007.

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Tosengeli kosala nini mpo maloba na biso ya nsuka ezala oyo ebongi? [be lok. 221 par. 1-4]

2. Na mosala ya kosakola, nini ekoki kosalisa biso tóyeba ete makambo oyo tozali koloba ezali solo? [be lok. 223 par. 2-4]

3. Ntango tozali kosala masolo na makita, ndenge nini tokoki komonisa ete totalelaka lisangá lokola “likonzí mpe eloko oyo esimbi solo”? (1 Tim. 3:15) [be lok. 224 par. 1-4]

4. Mpo na nini tosengeli kotala soki makambo oyo tolingi koloba ezali solo mpenza, mpe ndenge nini tokoki kosala yango? [be lok. 225 par. 1-2]

5. Ntango tozali koteya, tokoki kosala nini mpo bayoki bákanga ntina ya makambo oyo tozali koloba? [be lok. 226 par. 3–lok. 227 par. 1]

LISOLO NO. 1

6. Nini emonisi ete lisolo ya Yona ezali solo? [si lok. 153 par. 3]

7. Esakweli nini ya Mika ezali na boyokani na boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe na nzela ya Klisto Yesu? [si lok. 158 par. 18]

8. Nini emonisi ete mokanda ya Habakuku epemami na Nzambe? [si lok. 161 par. 4]

9. Mpo na nini tokoki koloba ete tii na mobu 520 L.T.B., Bayuda bakokisaki naino te mokano ya kozonga na bango longwa na boombo? (Hag. 1:4) [si lok. 166 par. 3]

10. Mokolo nini ya nkembo Zekalia alobeli yango mbala na mbala? [si lok. 172 par. 26]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Ndenge nini esakweli ya Yoele oyo elobelaki kobebisama ya mokili na banyama-nkɛkɛ ekokisamaki na ekeke ya liboso, mpe ndenge nini ezali kokokisama lelo oyo? (Yoe. 2:1-10, 28) [w07 1/10 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi—Makanisi ya ntina na mokanda ya Yoele mpe Amosa”]

12. “Ekɔlɔ ya mbuma ya ntango ya moi” ezalaki na ndimbola nini? (Amo. 8:1, 2) [w07 1/10 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi—Makanisi ya ntina na mokanda ya Yoele mpe Amosa”]

13. Na ndimbola nini Yehova ‘abongolaki motema na ye longwa na mabe oyo alobaki mpo na bato ya Ninive,’ mpe na ndenge nini yango etali biso? (Yona 3:10) [w03 15/7 nk. 17-18]

14. Kotambola na nkombo ya Yehova elimboli nini? (Mika 4:5) [w03 15/8 lok. 17 par. 19]

15. Na mikolo na biso, ntango nini mpe ndenge nini Yehova ayaki na “tempelo” na ye mpo na kosambisa? (Mki. 3:1-3) [re lok. 32 etanda; jd-F lok. 179 par. 3–lok. 181 par. 6]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto