Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/07 lok. 1
  • Tótambola lokola bato ya bwanya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tótambola lokola bato ya bwanya
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Masolo mosusu
  • Bilanga eteli mpo na kobuka mbuma
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Omipesa mobimba na mosala monene ya kobuka mbuma
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tozali na esengo ya komipesa mobimba na mosala ya Yehova!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Tósakola solo mokolo na mokolo na ndakisa ya Yesu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 11/07 lok. 1

Tótambola lokola bato ya bwanya

1 Ntango Yesu asɛngaki baluki-mbisi minei bálanda ye, bakakatanaki te mpo na kozwa ekateli, kasi “na mbala moko . . . balandaki ye.” (Mat. 4:18-22) Ntango Saulo moto ya Talasi abongolaki motema mpe akómaki komona lisusu, azelaki te mpo na kozwa ekateli, kasi “na mbala moko na basinagoga abandaki kosakola Yesu.” (Mis. 9:20) Mikolo ezali koleka nokinoki, mpe soki eleki ezongaka lisusu te; ekei libela. Yango wana, tosengeli ‘kotambola lokola bato ya bwanya’ na ndenge na biso ya kosalela ntango.​—Ef. 5:15, 16.

2 Makambo oyo ekanami te: Ntango mosusu, lobi tokozala lisusu te na libaku oyo tozali na yango lelo oyo ya kosalela Yehova. (Yak. 4:14) “Makambo oyo ekanami te” ekómelaka moto nyonso. (Mos. 9:11, NW) Longola yango, biso nyonso tokokóma mibange mokolo mosusu, mpe na ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, moko te kati na biso akoki kokima “mikolo mabe” ya bobange, oyo ekopekisa biso kosalela Yehova mingi. (Mos. 12:1) Na yango, ekozala bwanya te tókakatana mpo na komipesa epai ya Nzambe to tózela mikolo eleka liboso ya komipesa mobimba na mosala ya Nzambe, na kotalela makoki na biso. (Luka 9:59-62) Soki Abalayama azalaki na kimya na nsuka ya bomoi na ye, mpe akufaki wana ‘anunaki mpe akómaki na mikolo mingi’ ezali mpo asalelaki bomoi na ye na bwanya mpe amipesaki mobimba epai ya Yehova.​—Gen. 25:8.

3 Ntango ekómi mokuse: Tolingi mpe kosalela ntango na biso na bwanya mpamba te “ntango oyo etikali ekómi mokuse.” (1 Kol. 7:29-31) Mosika te, ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekosuka. Libaku ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya koyanganisa bato oyo bazali lokola bampate na ntango oyo ya ‘kobuka mbuma na mabelé,’ ekosuka. (Emon. 14:15) Tosengeli kokeba ete mitungisi ya bomoi mpe makambo mosusu eyiba te ntango na biso oyo tosengeli kolekisa na mosala ya kosakola. (Luka 21:34, 35) Na ntembe te, soki tozongisi makanisi nsima, tokozala na esengo mingi ya komona ete tomipesaki mobimba na mosala ya kobuka mbuma.

4 Tosengeli ntango nyonso kosala makasi tókokisaka masɛngami mpo tózanga te mikumba nyonso ya malamu oyo bakoki kopesa biso. Tiká tózwa ekateli ya kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalela Yehova “na ntango oyo ekoki kobengama ete ‘Lelo.’” (Ebe. 3:13) Soki tosali bongo, tokomonisa ete tozali bato ya bwanya, mpamba te “moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”​—1 Yoa. 2:17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto