Bozongeli ya eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 27 Augusto 2007. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 2 Yuli tii na pɔsɔ ya 27 Augusto 2007.
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Ndenge nini tokoki komonisa bato limemya na mosala na biso ya kosakola mpe na lisangá? [be lok. 192 par. 2-4]
2. Ntango tozali koloba, nini ekosalisa biso tómonisa ete tozali mpenza kondima makambo yango? [be lok. 196 par. 1-3]
3. Wapi mwa makanisi oyo ekosalisa biso tólobaka na mayele ntango tozali kosakwela basusu? [be lok. 198 par. 1–lok. 199 par 1]
4. Ndenge nini koloba na mayele etali mpe koyeba ntango ya koloba likambo wana tozali kosakwela basusu? (Mas. 25:11) [be lok. 199 par. 2-4]
5. Ndenge nini tokoki kosala mpo elobeli na biso elendisa bato nyonso? [be lok. 203 par. 3–lok. 204 par. 2]
LISOLO NO. 1
6. Tokoki koloba nini mpo na komonisa ete Ezekiele nde akomaki mokanda oyo ebengami na nkombo na ye, mpe nini emonisi bosolo na yango mpe esika na yango kati na kanɔ ya Biblia? [si lok. 133 par. 3]
7. Esɛngaka kozala na ezaleli nini mpo moto akanga motema na makambo oyo ezangi sembo? [w05 1/6 lok. 29 par. 4]
8. Liteya nini tozwi na eyano oyo Yesu apesaki basadukai oyo batunaki ye mpo na lisekwa? (Luka 20:37, 38) [be lok. 66 par. 4]
9. Soki moyekoli moko ya Biblia to ndeko moko na kati ya lisangá atuni yo nini asengeli kosala na likambo moko boye, eyano nini okopesa ye? [be lok. 69 par. 4–lok. 70 par. 1]
10. ‘Kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kopusa makanisi na biso’ esangisi makambo nini? (Ef. 4:23) [be lok. 74 par. 4]
BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ
11. Mobali oyo alataki molikani, oyo alobelami na Ezekiele 9:2-4, azali komonisa banani, mpe “elembo na bilongi” ezali komonisa nini? [w88-F 15/9 lok. 14 par. 18]
12. Na ndenge nini bakonzi ya mangomba ya boklisto bazali lokola “basakoli ya zoba baoyo [bazalaki] kolanda molimo na bango mpenza,” oyo balobelami na Ezekiele 13:3? [w99 1/10 lok. 13]
13. Na ntango Bayisalaele bazalaki koloba “lisese” oyo ezali na Ezekiele 18:2, bazalaki koluka kosala nini, mpe yango epesi liteya nini na likambo ya kozongisa monɔkɔ epai ya Yehova? [w88-F 15/9 lok. 18 par. 10]
14. Na ndimbola nini Ezekiele akómaki “emimi” to “baba” ntango banguna bazingaki Yelusaleme mpe babebisaki yango? (Ezek. 24:27; 33:22) [w03 1/12 lok. 29]
15. Nani azali “Gogo na mokili ya Magogo,” mpe ntango nini akobundisa bato ya Yehova? (Ezek. 38:2, 16) [w97 1/3 lok. 14 par. 1–lok. 15 par. 3]