Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/07 lok. 3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 7/07 lok. 3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32, ndenge emonisamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 2007. Sɛtɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia na buku yango, na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Soki bato oyo tokei kotala bazali na buku yango, tokomonisa bango na mokuse ndenge boyekoli esalemaka mpo na kosalisa bango bázwa matomba na buku yango. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, tokolakisa ye trakte Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? mpe tokolimbwela ye yango, mpo na kobanda koyekola na ye Biblia.

◼ Biro ya filiale ya Kinshasa ekoyamba bato te na mokolo ya 9 Desɛmbɛ 2007 (Bakotya bopɛto). Na mokolo wana, ebongiseli ya kotambwisa bato mpo na kotala Betele ekozala te.

◼ Lokola sanza ya Sɛtɛmbɛ ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.

◼ Kobanda na sanza ya Sɛtɛmbɛ, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala lisukulu ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo “Nini emonisi ete Biblia ebongi mpenza kotyelama motema?”

◼ Ezali malamu bankulutu bátindelaka biro baformilɛrɛ oyo bandeko bazali kotondisa mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza mikolo 60 liboso ya mokolo oyo ndeko alingi kobanda mosala yango. Mokomeli ya lisangá asengeli kotala malamumalamu soki bandeko batondisi yango nyonso. Soki ndeko azali koyeba lisusu te dati oyo azwaki batisimo, akoki kokoma ata dati moko oyo ezali mosika mingi te na dati oyo azwaki batisimo mpe kobatela yango. Mokomeli ya lisangá asengeli kokoma dati yango na karte ya mosakoli (Activité du proclamateur [S-21]).

◼ Evantɛrɛ ya mbula mobimba ya mikanda mpe bazulunalo nyonso oyo bozali na yango ekosalema na mokolo ya 31 Augusto 2007 to mpe mwa liboso to mwa nsima ya dati yango soki likoki ezali. Evantɛrɛ yango ekosalema ndenge kaka ndeko oyo atalelaka mikanda na masangá oyo esalelaka Ndako ya Bokonzi moko asalaka yango sanza na sanza, mpe bosengeli kokoma motángo ya mikanda yango na formilɛrɛ Stock des publications (S-18-F). Mpo bóyeba motángo ya bazulunalo nyonso oyo bozali na yango, bokoki kotuna bandeko oyo batalelaka bazulunalo na lisangá mokomoko. Mokomeli ya lisangá oyo etalelaka mikanda asengeli kotambwisa evantɛrɛ yango. Ye ná mokɛngɛli-mokambi ya lisangá oyo etalelaka mikanda bakotya sinyatili na bango na formilɛrɛ yango. Lisangá nyonso oyo etalelaka mikanda ekozwa formilɛrɛ yango misato. Tosɛngi bino ete bótinda kopi ya malamu na biro liboso ya mokolo ya 6 Sɛtɛmbɛ. Bóbomba kopi mosusu na dosye na bino. Kopi ya misato, bokoki kosalela yango lokola bruyɔ.

◼ Mbongwana ya badati ya mayangani ya etúká ya mobu 2007, “Landá Klisto!”: Butembo: Yuli 27-29, 2007 (F); Kiwanja: Yuli 28-29, 2007 (mikolo 2) (SW); Tshikapa: Augusto 10-12, 2007 (F).

◼ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ ekozala na lisolo “Kondimana ya kala” ezali mpenza na ntina? Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (10 %) koleka ndenge bazwaka liboso.

◼ Lamuká! ya Sɛtɛmbɛ (na Lifalanse) ekozala na lisolo Nzambe nde abimisaka makama oyo eutaka na mipɛpɛ makasi to na koningana ya mabelé? Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (10 %) koleka ndenge bazwaka liboso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto