Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/07 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 6/07 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 25 Yuni 2007. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 7 Mai tii na pɔsɔ ya 25 Yuni 2007. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.​—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Ntango tozali koloba, tokoki kosala nini mpo na kolongola kobanga mpe kobongisa mongongo? [be lok. 185 par. 1-3]

2. Ndenge nini tokoki kokóma “makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso” na mosala na biso ya kosakola? (1 Kol. 9:20-23) [be lok. 186 par. 2-4]

3. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yehova na likambo ya koyoka basusu? (Gen. 18:23-33; 1 Mik. 22:19-22) [be lok. 187 par. 1-2, 5]

4. Na ndenge nini mpenza tokoki kosalisa basusu bákola na elimo? [be lok. 187 par. 6–lok. 188 par. 3]

5. Mpo na nini tosengeli komemyaka bato? [be lok. 190 par. 3, etanda]

LISOLO NO. 1

6. Mpo na nini tosengeli kosala makasi tósimba mitema ya bato oyo tozali koteya? [be lok. 59 par. 1]

7. Ndakisa na biso ekoki kosala nini epai ya bato oyo toteyaka? [be lok. 61 par. 1]

8. Ndenge nini tokoki koyeba kosolola na bato ya ndako na biso? [be lok. 62 par. 3]

9. Ndakisa nini ya molende mpe ya mpiko mosakoli Yilimia atikelá biso? [si lok. 129 par. 36]

10. Elikya nini emonisami kati na mokanda ya Bileli, nzokande mpo na nini yango ezali na litomba lokola emonisi etumbu makasi oyo Nzambe apesaki bato mabe? [si lok. 132 par. 13]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Elikya nini tokoki kozala na yango na boyokani na likambo oyo ekómelaki Yilimia, oyo emonisami na Yilimia 37:21?

12. Ekoki kozala mpo na ntina nini nde Baluku alobaki ete ‘Yehova abakisaki mawa na mpasi na ye,’ likambo oyo ‘elɛmbisaki ye’; mpe Baluku asalaki nini na ebandeli mpo na kosilisa mokakatano yango? (Yil. 45:1-5)

13. Ntango nini Babilone ezalaki lisusu na bato te, mpe etikalaki ‘mpamba’? (Yil. 50:13)

14. Etinda nini etali libondeli emonisami polele na Bileli 3:8, 9, 42-45?

15. Likalo oyo elobelami na Ezekiele mokapo 1 ezali elilingi ya nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto