Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/07 lok. 3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 5/07 lok. 3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tokozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, bakisa mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli to na makita mosusu ya lisangá kasi bameseni mpenza te na Batatoli ya Yehova, tósala makasi tólakisa bango buku Biblia eteyaka mpo na kobanda koyekola na bango Biblia. Yuni: Buku Créateur to Bolamu na libota. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bókɛngɛlaka!, Bokonzi oyo ekosala Paradis, Bilimu ya bakufi​—⁠⁠Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?, Nini ekómelaka biso soki tokufi?, Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko, Nos problèmes​—⁠Qui nous aidera à les résoudre?, Ntango moto oyo olingaka akufi, Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?, Nzela ya bomoi ya seko​—⁠Osili komona yango?, Osengeli kondima Trinité?, Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?, Sepela na bomoi ya seko na Mabele!, “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika,” Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? Un livre pour tous, mpe Une vie pleinement satisfaisante: Comment?

◼ Lokola kalati DPA (Instructions médicales/ Désignation d’ une personne de confiance) ya sika ebimi, tozwi sikoyo karte oyo ezali komonisa mpenza bamposa na biso na likambo etali kozwa lisalisi ya monganga. Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2006 ezali na siplema moko oyo ekosalisa bandeko mingi bátondisa karte na bango. Na yango, tosɛngi bakɛngɛli nyonso na boyekoli ya mokanda básalisa mosakoli mokomoko ya etuluku na bango, oyo azwá batisimo, na kotondisa karte yango.

◼ Soki nkulutu moko akokende na liyangani ya etúká na mboka mosusu, tosɛngi ye akomela biro ya filiale likambo yango liboso mpenza. Mbala mosusu, bakoki kosɛnga ye asala lisukulu na liyangani yango, mingimingi soki na esika yango balobi bazali mingi te. Kasi, ye moko nde akofuta tike na ye to mbongo mosusu oyo mobembo yango ekosɛnga.

◼ Na pɔsɔ ya liyangani ya mokolo moko, mokɛngɛli ya zongazonga akopona lisangá moko oyo ekoyamba ye. Bakobongisa mpo makita ya mosala ya kosakola esalema na mikolo nyonso ya pɔsɔ yango, longola kaka na mokolo ya liyangani. Lisangá oyo bayambi mokɛngɛli ya zongazonga, bakobongisa likita ya boyekoli ya mokanda oyo ekoumela miniti 45; nsima na yango mokɛngɛli ya zongazonga to mokɛngɛli ya etúká, soki akozala molobi-mopaya na liyangani yango, akosala lisukulu ya mosala oyo ekoumela miniti 45. Na mpokwa ya mokolo mosusu ya pɔsɔ yango, lisangá bakosala Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe Likita ya mosala ndenge basalaka. Bakɛngɛli-batamboli bakoki mpe kosala masolo na makita yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto