Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/07 lok. 1
  • ‘Sakolá liloba ya Nzambe kozanga kobanga’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Sakolá liloba ya Nzambe kozanga kobanga’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Masolo mosusu
  • Tómekola Yesu—Tósakolaka na mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tókoba kosakola liloba ya Nzambe na mpiko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Osakolaka na mpiko?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • ‘Tóloba Liloba ya Nzambe na mpiko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 4/07 lok. 1

‘Sakolá liloba ya Nzambe kozanga kobanga’

1 Ekómelaka yo ntango mosusu obanga koloba ntango ozwi libaku ya koyebisa bato makambo oyo ondimaka, na kelasi to na mosala? Okakatanaka mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu epai ya bandeko na yo, baninga ya kartye, to epai ya bato mosusu oyo oyebani na bango te? Nini ekosalisa mokomoko na biso alekisaka te mabaku ya “kosakola liloba ya Nzambe kozanga kobanga”?​—Filp. 1:14.

2 Kobanga koloba te: Soki bakoseli moninga na yo ya motema to ndeko na yo likambo, okobanga kokɔtela ye? Banda mokili ebandá, makambo mingi ya lokuta elobamaka mpo na Yehova, moninga na biso oyo tolingaka mingi. Tozali na libaku malamu ya kopesa litatoli mpo na Nzambe na biso monene! (Yis. 43:10-12) Soki tolingaka Yehova mingi, tokoyoka nsɔni te to tokobanga te kopesa litatoli mpo na solo na mpiko mpenza.​—Mis. 4:26, 29, 31.

3 Kobosana te ete nsango na biso ezali nsango malamu. Bato oyo bazali kondima yango bakozwa matomba ya libela. Soki tozali kokanisa mingi ntina ya mosala ya kosakola na esika tókanisa mingi ndenge oyo tokoki komiyoka to makambo oyo banguna bakoki kosala biso, tokosakola na mpiko.

4 Ndakisa ya basusu: Bosembo ya bato oyo basakolaki liloba ya Nzambe kozanga kobanga ekoki kolendisa biso. Na ndakisa, Enoka asakolaki na mpiko mpenza ekateli ya Yehova epai ya bato ya masumu oyo bazalaki kotyola Nzambe. (Yuda 14, 15) Noa asakolaki na bosembo mpenza epai ya bato oyo batyaki likebi te. (Mat. 24:37-39) Baklisto ya liboso oyo bazalaki “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba,” bakobaki kosakola atako batɛmɛlaki bango makasi. (Mis. 4:13, 18-20) Mbala mingi, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezalaka na masolo ya bomoi ya basaleli ya Yehova ya ntango na biso, oyo balongaki ezaleli ya kobanga bato mpe bakómaki basakoli ya molende mpo bazalaki na kondima.

5 Soki tozali kotalela bomoi ya basaleli ya sembo ya ntango ya kala, oyo bakutanaki na mikakatano makasi, tokozwa mpiko. (1 Mik. 19:2, 3; Mko. 14:66-71) Basaleli yango ya sembo ‘bazwaki mpiko na lisalisi ya Nzambe na biso’ mpe basakolaki kozanga kobanga. Biso mpe tokoki kosala bongo!​—1 Tes. 2:2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto