Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/07 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 2/07 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Febwali: Pusaná penepene na Yehova. Soki masangá ezali na buku yango te, bakoki kolakisa buku Boyebi to buku mosusu ya kala oyo bazali na yango. Marsi: Tokolakisa buku Biblia eteyaka, mpe tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tokozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, bakisa mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli to na makita mosusu ya lisangá kasi bameseni mpenza te na Batatoli ya Yehova, tósala makasi tólakisa bango buku Biblia eteyaka mpo na kobanda koyekola na bango Biblia. Yuni: Buku Créateur to Bolamu na libota.

◼ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 2007 ekozala na lisolo moko oyo elobi: “Ndenge nini otalelaka koya ya Klisto?” Lokola motuna yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (15%) koleka ndenge bazwaka liboso.

◼ Mokomeli ya lisangá mpe mokɛngɛli na mosala ya kosakola basengeli kotalela mosala ya babongisi-nzela nyonso ya sanza na sanza. Soki moko na bango azali na mokakatano ya kokokisa ngonga oyo esɛngami, bankulutu basengeli koluka ndenge ya kosalisa ye. Mpo na kozwa makanisi mosusu, talá mokanda S-201 oyo biro etindaka mbula na mbula.

◼ Motó ya likambo ya lisukulu ya ntina mingi mpo na eleko ya Ekaniseli ezali “Okoki kozala na kimya na mokili oyo etondi na mobulu!” Talá Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ 2006.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto