Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/07 lok. 3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 1/07 lok. 3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yanuali 2007: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1991. Masangá oyo ezali na babuku wana ya kala te bakoki kolakisa buku Boyebi to mwa buku Bókɛngɛlaka! Febwali 2007: Pusaná penepene na Yehova. Masangá oyo ezali na buku yango te bakoki kosalela buku Boyebi to mokanda mosusu oyo bazali na yango ebele. Marsi 2007: Tokolakisa buku Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.

◼ Kobanda na sanza ya Febwali, kasi koleka mwa 4 Marsi te, bakɛngɛli ya zongazonga bakobanda kosala lisukulu ya sika ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo “Nani akokɔta na mokili ya sika ya Nzambe?”

◼ Filme (DVD) oyo ezali na motó ya likambo Mituna oyo bilenge batunaka​—Nakosala nini na bomoi na ngai? (na Lingelesi) ekotalelama na Likita moko ya mosala na sanza ya Aprili. Soki olingi kozwa yango, osengeli kosɛnga yango noki mpenza na nzela ya lisangá.

◼ Masangá esengeli kozwa bibongiseli ya malamu mpo na Ekaniseli oyo ekosalema mbula oyo na Mwayambo 2 Aprili, nsima ya kolala ya moi, kasi te na Mwamibale 3 Aprili, ndenge ekomamaki na libunga na mwa buku Tótángaka makomami mokolo na mokolo​—2007 na Lingala. Atako lisukulu ekoki kobanda liboso, kasi limpa na vinyo esengeli kolekisama te liboso ya kolala ya moi. Bóluka koyeba ngonga oyo moi elalaka na esika bofandi. Lisangá na lisangá esengeli kosala makasi ete esala Ekaniseli na yango moko. Kasi, na bisika mosusu ekokoka te kosalema bongo. Epai masangá mingi esalelaka Ndako ya Bokonzi moko, ntango mosusu lisangá moko to masangá mingi ekoki kosalela bisika mosusu na mpokwa wana. Tosɛngi bino ete soki likoki ezali, ntango lisangá ya liboso ekosilisa, bólekisa miniti 40 liboso ete lisangá mosusu ebanda mpo lisangá na lisangá esala molulu yango malamu mpenza. Esengeli mpe kotya likebi na ndenge oyo mituka ekobanda kokɔta mpe kobima, esika oyo bakotɛlɛmisa yango, mpe esika oyo bakokitisa bato mpe kozwa bango. Lisangani ya bankulutu basengeli kozwa bibongiseli oyo ekozala malamu mpo na lisangá na bango.

◼ Bakomeli ya masangá basengeli komindimisa ete bazali na mokanda ya mobongisi-nzela mokomoko, oyo emonisi ete biro endimi ye asala mosala ya mobongisi-nzela Lettre de nomination de pionnier (S-202). Soki bazali na yango te, basengeli kokomela biro.

◼ Tótángaka makomami mokolo na mokolo​—2007 ekotindama mbala moko na masangá nyonso ya Congo-Kinshasa ata soki bosɛngi yango te na formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Bokozwa yango na motángo oyo bozwaka Mosala na biso ya Bokonzi. Kasi, soki lisangá na bino esilaki kosɛnga yango na nzela ya formilɛrɛ Demande de publications (S-14) ndenge liyebisi oyo ezalaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Augusto 2006 elendisaki yango, departema ya kotinda mikanda ekotindela bino yango na kotalela komande wana.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto