Biyano na mituna na bino
◼ Ekoki kozala malamu bandeko básangisa biloko na bango mosusu mpe bátɛka yango mpo na kozwa mbongo ya lisangá, to bábongisa bokutani to fɛti mpo mbongo nyonso oyo ekokɔta mokolo wana, ezala ya lisangá?
Mbala mingi, mangomba ebongisaka makambo ndenge na ndenge mpo na kokɔtisa mbongo na kɛsi ya lingomba; na ndakisa kobengisa bato báya kolya biloko oyo balambi, kotɛka biloko, to kosala fɛti. Atako bato mosusu bamonaka ete makambo ya ndenge wana ezali malamu mpo ekɔtisaka mbongo na lingomba, kasi kosala bongo ezali lokola kosɛnga bato mbongo. Batatoli ya Yehova bazwaka mbongo na lolenge wana te.
Nimero ya mibale ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, oyo ya Augusto 1879 (na Lingelesi) emonisaki ntina oyo toboyaka kolanda mangomba mpe kosɛnga bato mbongo; elobaki boye: “Tondimi ete YEHOVA moto azali kopesa mbongo mpo na kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona, mpe lokola ezali bongo, tokoki te kosɛnga to koluka mbongo epai ya bato mpo na kobimisa yango. Ntango Yehova, ye oyo alobi ete: ‘Wolo nyonso mpe palata nyonso ya ngomba ezali ya ngai,’ akotika kopesa mbongo oyo esengeli mpo na kobimisa yango, wana nde tokoyeba ete ntango ekoki mpo tótika kobimisa zulunalo yango.”
Tozali kokoba kolanda etinda oyo ya Makomami: “Tiká ete moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na komilela te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Kol. 9:7) Bakɛsi ya makabo ezalaka na Ndako ya Bokonzi, mpo moto nyonso oyo asepeli kopesa libako na ye, atya yango na kɛsi. (2 Mik. 12:9) Tosɛngaka makabo na makasi te; topesaka mpe makabo te na likanisi ya kozwa eloko mosusu nsima ya kopesa yango.