Kobungisa te bolingo oyo ozalaki na yango liboso
1 Yesu Klisto, na kati ya nkembo na ye, apesaki lisangá ya Efese na ekeke ya liboso toli oyo: “Nazwi yo mabe na likambo oyo, ete otiki bolingo oyo ozalaki na yango liboso.” (Emon. 2:4) Emonani ete, bandeko mingi babungisi bolingo oyo bazalaki na yango liboso mpo na Yehova. Ntango tobandaki koyekola mateya ya solo, tokómaki kolinga Nzambe mingi mpe bazalani na biso, mpe yango etindaki biso tósakwela basusu elikya na biso ya sika na molende mpenza. Nini ekosalisa biso mpo tóbungisa te bolingo oyo tozalaki na yango na ebandeli mpe tólɛmbisa mabɔkɔ te na mosala ya kosakola?
2 Koyekola biso moko mpe koyangana na makita: Ntango tobandaki koyekola mateya ya solo, nini etindaki biso tókóma kolinga Nzambe mpe bazalani na biso? Ezali makambo nyonso oyo toyekolaki na Makomami mpo na Yehova nde etindaki biso tólinga ye! (1 Yoa. 4:16, 19) Yango wana, mpo “bolingo na [biso] etondana lisusu mpe lisusu,” tosengeli kokoba kozwa boyebi ya solosolo, kotimola “na makambo mozindo ya Nzambe.”—Flp. 1:9-11; 1 Kol. 2:10.
3 Na mikolo ya nsuka oyo etondi na mitungisi mpe na makambo oyo epɛngwisaka likebi, ezali mpenza mokakatano mpo tóbatela momeseno ya koyekola Biblia biso moko. (2 Tim. 3:1) Tosengeli kobomba ntango na programɛ na biso mpo na komileisa na elimo. Ezali mpe na ntina mingi ete tóyanganaka na makita nyonso ya lisangá, mingi mpenza lokola tozali “komona mokolo yango ezali kokóma pene.”—Ebe. 10:24, 25.
4 Mosala ya kosakola: Kosakola na molende esalisaka biso tókoba kolinga Nzambe ndenge tozalaki kolinga ye liboso. Ntango tozali kosakola nsango malamu, tozali kozongisa lisusu na makanisi na biso bilaka ya Yehova ya bolingo, mpe yango esalisaka biso tóbatela elikya na biso makasi mpe bolingo na biso ekita te. Mpo na koteya bato solo ya Biblia, esɛngaka biso moko tólukaluka na mikanda mpo na kokanga ntina ya makambo yango malamu, mpe yango eyeisaka kondima na biso makasi.—1 Tim. 4:15, 16.
5 Yehova abongi na nyonso, abongi mpe tólinga ye. (Emon. 4:11) Kotika te ete bolingo na yo mpo na ye ekita. Kobá kolinga Yehova ndenge ozalaki kolinga ye liboso, na koyekoláká Biblia yo moko malamumalamu, koyanganáká na makita nyonso, mpe koyebisáká basusu na molende mpenza makambo oyo olingaka mingi na motema na yo.—Lom. 10:10.