Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/06 lok. 7
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 12/06 lok. 7

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ya bozongeli ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 25 Desɛmbɛ 2006. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 6 Novɛmbɛ tii na pɔsɔ ya 25 Desɛmbɛ 2006. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.​—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Wapi makambo oyo ekosalisa biso tópona malamu maloba tokobimisa liboso ya kotánga vɛrsɛ moko? [be lok. 148 par. 4–lok. 149 par. 1]

2. Tángá mwa mayele oyo tokoki kosalela mpo na konyata malamu maloba ya ntina. [be lok. 151 par. 5–lok. 152 par. 3

3. Lokola koteya bato Liloba ya Nzambe ezali likambo ya lisɛki te, tosengeli kosala nini mpo ‘tósembola liloba ya solo malamumalamu’? (2 Tim. 2:15) [be lok. 153 par. 1-3, etanda; lok. 154 par. 1-2]

4. Tokoki kosala nini mpo na komonisa polele ndenge ya kosalela bavɛrsɛ oyo tozali kotánga? [be lok. 154 par. 4–lok. 155 par. 3]

5. Mpo na nini esengeli komonisa ndenge ya kosalela makambo oyo tozali koloba, mpe ndenge nini tokoki kosala yango? [be lok. 157 par. 1-4, etanda; lok. 158 par. 1]

LISOLO NO. 1

6. Na ndimbola nini Salomo azalaki moyanganisi? [si lok. 112 par. 1-3]

7. Nini emonisi ete mokanda ya Mosakoli ezali na boyokani na mateya ya Yesu? [si lok. 114 par. 16]

8. Elembeteli nini emonisi ete Loyembo ya Salomo etángami kati na mikanda mipemami ya Biblia? [si lok. 115 par. 3-4]

9. Lolenge nini rulo ya Yisaya oyo bazwaki pene na Mbu Ekufá endimisi biso ete makambo oyo ezali na Biblia oyo tozali kosalela lelo ekeseni mpenza te na makomi ya libosoliboso oyo Nzambe akomisaki? [si lok. 118 par. 6]

10. Nini ekoki kosalisa molobi mpo akoma makambo mingi te na lokasa na ye? [be lok. 42 par. 2]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Na ndenge nini ‘baoyo bazali koluka Yehova bakoki koyeba makambo nyonso’? (Mas. 28:5)

12. Na ndenge nini ‘mosala ya zoba elɛmbisaka ye’? (Mos. 10:15)

13. Na ndenge nini elenge mwasi Sulamite amonisaki ete azali lokola “elanga ezipami,” mpe na ndenge nini azali ndakisa malamu mpenza mpo na basi baklisto oyo babali te? (Loy. 4:12)

14. Ntango Yehova ayebisaki bato na ye, bana ya Yisalaele, ete ‘bábongisa likambo,’ alingaki nde koloba ete andimi kosolola na bango mpo na kosilisa likambo oyo ezalaki kati na ye ná bango? (Yis. 1:18a, NW)

15. Ndenge nini Yisaya 11:6-9 ekokisamaki na ntango ya kala, mpe wapi kokokisama monene ya esakweli yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto