Makambo nini otyaka na esika ya liboso?
1 Okopesa eyano nini na motuna oyo? Na ntembe te, biso nyonso tolingaka kotya makambo ya Bokonzi na esika ya liboso. (Mat. 6:33) Kasi, tokoki komituna boye: ‘Bikateli oyo nazwaka emonisaka mpenza ete nazali kotya Bokonzi na esika ya liboso?’ Biblia elendisi biso na maloba oyo: “Bókoba kotala soki bozali ndenge nini.” (2 Kol. 13:5) Ndenge nini tokoki koyeba soki tozali kotya Bokonzi na esika ya liboso?
2 Ntango na biso: Ya liboso, tokoki kotalela ndenge oyo tosalelaka ntango na biso. (Ef. 5:15, 16) Ntango boni tolekisaka pɔsɔ na pɔsɔ elongo na baninga, liboso ya televizyo, na Internet, to na lisano moko boye? Soki tokomi bangonga nyonso oyo tolekisaka na makambo wana mpe tokokanisi yango na oyo tolekisaka na makambo ya elimo, tokokamwa mpenza. Mposa ya kokóma na bomɛngo ezali nde kotinda biso tósala mosala ntango molai mpe tózanga ntango ya kosala mosala ya bosantu? Mbala boni tozangisaka makita to mosala ya kosakola na mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo mpo na kokende kosepelisa nzoto?
3 Tópona makambo oyo tokotya na esika ya liboso: Mingi na biso tozalaka na ntango te ya kosala makambo nyonso oyo tolingaka. Yango wana, mpo mosala ya Bokonzi ezala na esika ya liboso, tosengeli kotalela lisusu makambo oyo totyaka na esika ya liboso mpe kobongisa ntango ya kosala “makambo oyo eleki ntina.” (Filp. 1:10) Kati na makambo yango oyo eleki ntina tokoki kotánga: koyekola Liloba ya Nzambe, kobima na mosala ya kosakola, kokokisa bamposa ya libota na biso, mpe koyangana na makita. (Nz. 1:1, 2; Lom. 10:13, 14; 1 Tim. 5:8; Ebe. 10:24, 25) Makambo mosusu lokola kosala mwa ngalasisi mpe kosakana epesaka mpe litomba. (Mko 6:31; 1 Tim. 4:8) Kasi, makambo wana ya ntina moke esengeli te kopekisa biso tókokisa makambo oyo eleki ntina.
4 Elenge mobali moko akɔtaki na mosala ya ntango nyonso mpo alingaki kotya mosala ya Bokonzi na esika ya liboso, na esika ya kotánga kelasi milai mpo na kozwa mosala ya mbongo mingi. Ayekolaki monɔkɔ mosusu mpe akendeki kosala esika mposa ezalaki monene. Alobaki boye: “Nazali na bomoi ya malamu mpenza awa. Mosala ya kosakola ezali kosalema malamu! Nalingi ete bilenge nyonso básala mosala oyo mpo báyoka ndenge ngai nazali koyoka. Ezali na likambo moko te oyo eleki kosalela Yehova na nyonso oyo tozali na yango.” Ya solo, kotya Bokonzi na esika ya liboso, ekopesa biso mapamboli mingi, kasi likambo oyo eleki ntina ezali ete yango ekosepelisa Yehova, Tata na biso ya likoló.—Ebe. 6:10.