Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/06 lok. 1
  • Ndenge ya kokoba kozala na molende

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kokoba kozala na molende
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • “Bópela na elimo”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Zalá na mposa makasi ya kosakola nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Ozali na “molende na misala ya malamu”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Monisáká molende na mosala ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 4/06 lok. 1

Ndenge ya kokoba kozala na molende

1 Molende oyo Apolo azalaki na yango na mosala ya kosakola ekoki kotinda biso tókanisa bandeko na biso baklisto oyo bazali lelo na molende mpenza na mosala ya kosakola. (Mis. 18:24-28) Nzokande balendisi biso nyonso boye: “Bósalaka misala na bino kozanga kolekisa ntango mpambampamba. Bópela na elimo.” (Lom. 12:11) Nini ekoki kosalisa biso tókóma na molende mpe tókoba na ezaleli yango na mosala ya kosakola?

2 Boyebi ebakisaka molende: Ntango Yesu abimelaki bayekoli na ye mibale mpe “alimbwelaki bango makambo oyo etalaki ye na kati ya Makomami nyonso,” na nsima balobaki boye: “Mitema na biso ezalaki te kozika ntango azalaki koloba na biso na nzela?” (Luka 24:27, 32) Ndenge moko mpe, mitema na biso etondaka te na esengo ntango tozali kokanga malamumalamu ntina ya Liloba ya Nzambe? Ya solo, boyebi ebakisaka kondima. Baloma 10:17 elimboli ete: “Kondima eutaka na likambo oyo eyokami.” Soki mitema na biso etondi na elikya na bilaka ya Yehova, tokokoka ata moke te kotika kolobela makambo oyo toyekoli!​—Nz. 145:7; Mis. 4:20.

3 Tokoki kaka kotya motema te ete makambo oyo toyekolá kala ekosalisa biso tókoba kolinga Nzambe mingi mpe tózala na molende na mosala na ye. Tosengeli kokoba koluka kokanga ntina ya mateya ya solo mpe kolinga Yehova lisusu mingi. Soki tosali bongo te, mokemoke, tokobanda kosala mosala na ye kaka mpo na kosala. (Emon. 2:4) Liloba ya Nzambe elendisi biso ‘tókoba . . . kokola na kati ya boyebi ya solosolo ya Nzambe.’​—Kols. 1:9, 10.

4 Ndenge na biso ya koyekola: Ezali malamu tótalelaka ndenge na biso ya koyekola. Na ndakisa, tokoki kotya elembo na biyano ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe kopesa biyano oyo ebongi. Kasi, totángaka bavɛrsɛ oyo batii maloba na yango na lisolo te mpe tokanisaka ndenge ya kosalela makambo yango na bomoi na biso? Na botángi ya Biblia ya pɔsɔ na pɔsɔ, tosalaka makasi tólukaluka na mikanda soki ekoki mpe tomanyolaka likoló na mateya oyo tozwi na botángi yango? (Nz. 77:11, 12; Mas. 2:1-5) Tokozwa matomba mpenza soki tozali kokanisa likoló na Liloba ya Nzambe malamumalamu mpe komipesa mobimba na yango! (1 Tim. 4:15, 16) Soki tozali koyekola malamumalamu ndenge wana, tokoleisa motema na biso mpe tokozwa makasi ya kozala na “molende mpo na misala ya malamu.”​—Tito 2:14.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto