Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 27 Febwali 2006. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 2 Yanuali tii na pɔsɔ ya 27 Febwali 2006. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Na ndenge nini Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esalisaka biso ‘tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso mpe tósala eyambweli mpo na nkombo na ye’? (Ebe. 13:15) [be lok. 5 par. 3–lok. 6 par. 1]
2. Mpo na nini tosengeli kosala milende mpo na kotángaka malamu? [be lok. 83 par. 1-5]
3. Mpo na nini ezali na ntina tóbimisaka maloba polele ntango tozali koloba mpe koteya? [be lok. 86 par. 1-6]
4. Mpo na nini ezali na ntina tóbengaka maloba na ndenge esengeli, mpe makambo nini tosengeli kobosana te? [be lok. 89 par. 1–lok. 90 par. 3, etanda]
5. Wapi makanisi mosusu oyo ekoki kosalisa biso tókakatana na maloba te ntango tozali kosolola na moto? [be lok. 94 par. 4-5, etanda]
LISOLO NO. 1
6. Ndenge nini 2 Ntango 36:17-23 emonisi ete ebongi mpenza kotyela bisakweli ya Biblia motema? [si lok. 84 par. 35]
7. Makambo nini elandanaki oyo epesaki Bayuda nzela ya kozonga na mboka na bango na mobu 537 L.T.B. mpo na kotonga lisusu ndako ya Yehova? [si lok. 85 par. 1-3]
8. Ndenge nini mokanda ya Ezela emonisi polele ete Yehova azali Nzambe ya solo, mpe ndenge nini yango ezali kosalisa biso tótyela Ye motema? [si lok. 87 par. 14, 18]
9. Mpo na nini ‘mbula ya ntuku mibale ya boyangeli ya Alatazelezese’ ezali na ntina mingi na boyekoli ya badati ya Biblia? (Neh. 2:1, 5, 6, 11, 17, 18) [si lok. 88 par. 2, 5]
10. Na ndenge nini Nehemia azali ndakisa malamu mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo? [si lok. 90 par. 16-17]
BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ
11. Bayuda oyo bazongaki na boombo, bazalaki na Ulimu mpe Tulimu, biloko oyo bazalaki kosalela mpo na koyeba eyano ya Yehova? (Ez. 2:61-63)
12. Mpo na nini Bayuda mingi bakakatanaki mpo na kozonga na Yelusaleme elongo na Ezela? (Ez. 7:28–8:20)
13. Ndenge nini Bayuda bakokaki kotonga efelo na lobɔkɔ moko kaka? (Neh. 4:17, 18)
14. Lokola mbala mingi bazalaki kotya mikanda ya sɛkɛlɛ na saki oyo bakangi, mpo na nini Sanebalata atindelaki Nehemia “mokanda polele”? (Neh. 6:5)
15. Longola ete Nehemia ‘alandelaki’ Bayuda oyo baboyaki kotika masumu, ndenge asalaki epai ya mikóló mpe epai ya bato minene, bibongiseli nini mosusu azwaki mpo na kosilisa makambo ya mabe? (Neh. 13:25, 28)