Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/06 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 1/06 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yanuali: Buku nyonso oyo ebimaki liboso ya mobu 1991. Masangá oyo ezali na babuku wana ya kala te bakoki kolakisa buku L’humanité à la recherche de Dieu. Febwali: Pusaná penepene na Yehova. Marsi: Buku ya sika, Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.

◼ Lokola sanza ya Aprili ekozala na bawikende mitano, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.

◼ Kobanda na sanza ya Febwali, eleka mwa 5 Marsi te, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala lisukulu ya sika ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo “Okoki kozala na bomoi ya kimya lelo oyo​—Mpe libela na libela.”

◼ Masangá esengeli kozwa bibongiseli ya malamu mpo na Ekaniseli oyo ekosalema mbula oyo na Mwamisato 12 Aprili nsima ya kolala ya moi. Atako lisukulu ekoki kobanda liboso, kasi limpa na vinyo esengeli kolekisama te liboso ya kolala ya moi. Talá liyebisi oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2004. Makambo balobi wana ezali solo. Lisangá na lisangá esengeli kosala makasi ete esala Ekaniseli na yango moko. Kasi, na bisika mosusu ekokoka te kosalema bongo. Epai masangá mingi esalelaka Ndako ya Bokonzi moko, ntango mosusu lisangá moko to masangá mingi ekoki kosalela bisika mosusu na mpokwa wana. Tosɛngi bino ete soki likoki ezali, ntango lisangá ya liboso ekosilisa, bólekisa miniti 40 liboso ete lisangá mosusu ebanda mpo lisangá na lisangá esala molulu yango malamu mpenza. Lisangani ya bankulutu basengeli kozwa bibongiseli oyo ekozala malamu mpo na lisangá na bango.

◼ Soki okosala mobembo na mboka mopaya mpe olingi koyangana na makita, to koyangana na liyangani ya zongazonga to ya mokolo moko, to na liyangani ya etúká kuna, osengeli kotuna makambo oyo etali dati, ngonga, mpe esika oyo yango ekosalema na biro ya filiale oyo etalelaka mosala na mboka yango. Baadresi ya babiro ya filiale etyami na lokasa ya nsuka ya Annuaire ya mbula oyo.

◼ Totindeli bino nimero ya telefone ya sika ya biro ya filiale: 0815551000. Nimero oyo ezali kopesa biso nzela ya koyamba bato mingi mbala moko.

◼ Lokola Betele ezali kokóma monene, yango epesi biro nzela ya kobenga bandeko mingi oyo bayebi malamu mosala ya lotiliki (électriciens), ya plombérie, ya mekaniki, mpe ya froid. Soki ndeko mobali to ndeko mwasi moko ayebi moko ya misala yango mpe asepelaka kosala na Betele, tosɛngi ye ayebisa Betele na nzela ya Komite ya Mosala na lisangá.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto