Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/05 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 8/05 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepelá na bomoi ya seko na mabele! mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika”. Sɛtɛmbɛ: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Ɔkɔtɔbɛ: Tokolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto amonisi mposa, lakisá ye mwa buku Azali kosɛnga.

◼ Lokola sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ezali na pɔsɔ mitano, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi.

◼ Esengeli kobatela lokasa 5 mpe 6 ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo mpo tokosalela yango na masolo oyo ekolobela liyangani ya zongazonga mpe liyangani ya mokolo moko mpo na mobu ya mosala 2006.

◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ to mwa moke nsima na yango soki likoki ezali. Soki ezali na kɔnti mosusu oyo esengeli kotalela, na ndakisa mbongo mpo na kobongisa to kotonga Ndako ya Bokonzi, esengeli mpe kotalela yango. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.

◼ Evantɛrɛ ya mbula mobimba ya mikanda mpe bazulunalo nyonso oyo bozali na yango ekosalema na mokolo ya 31 Augusto 2005 to mpe mwa liboso to mwa nsima ya dati yango soki likoki ezali. Evantɛrɛ yango ekosalema ndenge kaka ndeko oyo atalelaka mikanda na masangá oyo esalelaka Ndako ya Bokonzi moko asalaka yango sanza na sanza, mpe bosengeli kokoma motuya ya mikanda yango na formilɛrɛ Stock des publications (S-18-F). Mpo bóyeba motango ya bazulunalo nyonso oyo bozali na yango, bokoki kotuna bandeko oyo batalelaka bazulunalo na lisangá mokomoko. Mokomeli ya lisangá oyo etalelaka mikanda asengeli kotambwisa evantɛrɛ yango. Ye ná mokɛngɛli-mokambi ya lisangá oyo etalelaka mikanda bakotya sinyatili na bango na formilɛrɛ yango. Lisangá nyonso oyo etalelaka mikanda ekozwa formilɛrɛ Stock des publications (S-18-F) misato. Tosɛngi bino ete bótinda kopi ya malamu na biro liboso ya mokolo ya 6 Sɛtɛmbɛ. Bóbomba kopi mosusu na dosye na bino. Kopi ya misato, bokoki kosalela yango lokola bruyɔ.

◼ Masangá basengeli kobanda kosɛnga Calendrier des Témoins de Jéhovah 2006 mpe Annuaire des Témoins de Jéhovah 2006 na komande oyo bakosala mbala ekoya. Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—⁠2006 ekotindama na masangá nyonso kozanga ete básala komande na yango. Liste ya minɔkɔ oyo mikanda yango ekobima, ekotyama na “Avis à toutes les congrégations,” oyo etindamaka na masangá nyonso sanza na sanza.

◼ Tozali na esengo ya koyebisa bino ete tozali na nkasa ya libyangi mpo na makita na biso. Na kati, bakomi eloko te na esika ya mikolo mpe ngonga ya makita, bakomi mpe eloko te na esika ya adrɛsi ya Ndako ya Bokonzi. Nkasa yango ya libyangi, oyo ezali kobengisa bato na makita na biso, soki obaloli yango ezali na nsango moko, ezali mpe na mwa eteni oyo moto akoki kokata. Lisangá esengeli kosala komande ya nkasa yango mpo na makita na bango, soki batondisi formilɛrɛ S-16-F. Bóyeba ete nkasa yango ya libyangi, oyo ezali kobengisa bato na makita na biso, ekozala na minɔkɔ oyo: Cibemba, Kiluba, Lifalanse, Lingala, Monokutuba, Otetela, Swahili, Tshiluba mpe Uruund.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto