Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/05 lok. 5
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 7/05 lok. 5

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bilimu ya bakufi​—⁠Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele!; “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika” mpe Une vie pleinement satisfaisante: Comment? Sɛtɛmbɛ: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, tokolakisa ye mwa buku Azali kosɛnga.

◼ Kobanda na sanza ya Sɛtɛmbɛ, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala lisukulu ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo “Mpo na nini tosengeli kotika Biblia etambwisaka biso?”

◼ Ezali malamu bankulutu bátindelaka biro baformilɛrɛ oyo bandeko bazali kotondisa mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza mikolo 60 liboso ya mokolo oyo bandeko balingi kobanda mosala yango. Mokomeli ya lisangá asengeli kotala malamumalamu soki bandeko batondisi yango malamu. Soki bandeko bazali koyeba lisusu te dati oyo bazwaki batisimo, bakoki kokoma ata dati moko oyo ezali mosika mingi te na dati oyo bazwaki batisimo mpe kobatela yango. Mokomeli ya lisangá asengeli kokoma dati yango na karte ya mosakoli. (Activité du proclamateur [S-21])

◼ Bakomeli ya masangá basengeli komindimisa ete bazali na mokanda ya mobongisi-nzela mokomoko, oyo emonisi ete biro endimi ye asala mosala ya mobongisi-nzela Lettre de nomination de pionnier (S-202). Soki bazali na yango te, basengeli kokomela biro.​—⁠Talá mayebisi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuni 2004.

◼ Makabo nyonso, ezala mingi to moke, ezali na ntina mingi mpe esalelamaka malamu mpo na kosunga nsango malamu. Mpo bandeko ya Betele bázala na mosala mingi te, soki likoki ezali, basaleli na misala oyo batalaka Kɔnti ya lisangá basengeli kosanze mbongo ya mike na mbongo ya minene mpe kotinda na biro kaka nkasa ya minene oyo ebebi te. Ekozala malamu soki biso nyonso tozali kopesa te mbongo oyo ebebi ntango tozali kopesa makabo, mpo tópesa makabo oyo ezangi ntina te. Yango nde ekómaka na bantango mosusu.​—⁠Mki. 1:⁠7.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto