Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 27 Yuni 2005. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 2 Mai tii na pɔsɔ ya 27 Yuni 2005. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Mpo na nini maloba ya kokokanisa makambo mpe maloba ya elilingi esalisaka biso tóteya malamu koleka? (Gen. 22:17; Nz. 1:3; Yak. 3:6) [be lok. 240 par. 2-4, etanda]
2. Epai wapi tokoki kozwa bandakisa oyo esalisaka moto azwa liteya ya ntina, kasi mpo na yango, tosengeli kokeba na likambo nini? [be lok. 242 par. 1-2]
3. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kopɔna bandakisa oyo ekobota mbuma mingi koleka? [be lok. 244 par. 1-2]
4. Mpo na nini tosengeli kosalelaka biloko ya kolakisa bato ntango tozali koteya, mpe ndenge nini Yehova asalaki yango? [be lok. 247 par. 1-2, etanda]
5. Ndenge nini tokoki kosalela biloko ya kolakisa bato na mosala ya kosakola? [be lok. 248 par. 1–lok. 249 par. 2]
LISOLO NO. 1
6. Ndakisa nini Liloba ya Nzambe epesi na likambo etali kokɔtisa bana kelasi? [w03 15/3 lok. 12 par. 2; lok. 14 par. 3]
7. Ndenge nini Yehova amonisaki ete atyelaki Davidi, oyo azalaki naino elenge, likebi mpe ndenge nini Davidi amonisaki ete azalaki kotyela Yehova likebi? [w03 15/4 lok. 29 par. 4; lok. 30 par. 3]
8. Mpo na nini Yehova andimaki mbeka ya Abele mpe yango endimisi biso likambo nini? (Gen. 4:4) [w03 1/5 lok. 28 par. 4–lok. 29 par. 1]
9. “Disipilini ya Yehova” oyo Masese 3:11, (NW) esɛngi biso tóboya yango te, ezali nini? [w03 1/10 lok. 20 par. 2-4]
10. Maloba “ezaleli ya kosepela na oyo ozali na yango,” oyo ezali na 1 Timote 6:6-8, elimboli nini? [w03 1/6 lok. 9 par. 1-2; lok. 10 par. 1]
BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ
11. Bolingo makasi oyo ezalaki kati na Yonatana ná Davidi ezalaki elilingi ya nini? (2 Sam. 1:26) [w89-F 1/1 lok. 26 par. 13]
12. Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo esalemaki mbala ya liboso oyo Davidi alukaki komɛma sanduku ya kondimana na Yelusaleme? (2 Sam. 6:2-9)
13. Ntango Davidi ná Bata-seba basalaki lisumu, mpo na nini mwana na bango asengelaki kokufa, nzokande Deteronome 24:16 mpe Ezekiele 18:20 elobi ete mwana asengeli te kokufa mpo na lisumu ya tata na ye? (2 Sam. 12:14; 22:31)
14. Ndenge nini toyebi ete makambo Siba alobaki na ntina etali Mefibosete ezalaki ya lokuta? (2 Sam. 16:1-4)
15. Mpo na nini Mefibosete azali ndakisa malamu mpo na biso, na ezaleli oyo amonisaki ntango ayokaki likambo oyo Siba asalaki ye? (2 Sam. 19:24-30)