Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/05 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 5/05 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Mai: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Yuni: Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango bazali na bana te, bokoki kolakisa buku Bolamu na libota to buku Boyebi. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bilimu ya bakufi​—⁠Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele!; “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika”; Une vie pleinement satisfaisante: Comment? mpe Ntango moto oyo olingaka akufi. . .

◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Yuni to mwa moke na nsima. Soki ezali na kɔnti mosusu oyo esengeli kotalela, na ndakisa kɔnti ya makambo etali kobongisa Ndako ya Bokonzi to kotonga yango, esengeli mpe kotalela bakɔnti yango. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.

◼ Soki ndeko moko akɔti lopitalo, bankulutu ya lisangá na ye bakozwa bibongiseli mpo bandeko bakendaka kotala ye mpe kolendisa ye na elimo na ntango nyonso oyo akolekisa na lopitalo. Basengeli kozela te ete Komite ya Boyokani elongo na minganga eyebisa bango makambo oyo basengeli kosala. Komite yango esalisaka kaka na makambo etali makila to soki bandeko bazali na mposa ya koyeba monganga oyo akondima kosalisa moto kozanga kozongisa ye makila.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto