Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/05 lok. 5
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 3/05 lok. 5

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Marsi: Bókɛngɛlaka! Aprili mpe Mai: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Yuni: Yekolá epai ya moteyi monene. Soki bato yango bazali na bana te, bokoki kolakisa buku Bolamu na libota to buku Boyebi. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.

◼ Masangá basengeli kokabolaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ya sika mbala moko ntango bazwi yango. Yango ekosala ete basakoli báyeba makambo oyo ezali na kati ya bazulunalo yango liboso ya kokende kolakisa yango na mosala ya kosakola. Basengeli mpe kopesa basakoli Mosala na biso ya Bokonzi mbala moko ntango bazwi yango. Bakoki mpe kokabola yango na bituluku ya boyekoli ya mokanda.

◼ Bakomeli ya masangá basengeli ntango nyonso kozala na baformilɛrɛ oyo mingi na libombo: Demande d’admission au service de pionnier permanent (S-205) mpe Demande d’admission au service de pionnier auxiliaire (S-205b). Bokoki kosala komande na yango na formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Bózala na baformilɛrɛ yango mingi oyo bokoki kosalela ata koleka mbula mobimba.

◼ Ekaniseli ekosalema mokolo ya minei, 24 Marsi 2005. Soki na lisangá na bino bosalaka makita na mokolo ya minei, makita yango esengeli kosalema mokolo mosusu kati na pɔsɔ soki Ndako ya Bokonzi ekozala mpamba. Soki bokoki kosala bongo te mpe likoki ya kosala Likita na bino ya Mosala ezali te, bokoki kokɔtisa masolo ya likita yango, oyo etaleli mpenza lisangá na bino, na programɛ ya Likita mosusu ya Mosala.

◼ Basakoli mingi babengaki na telefone mpo na kotuna likanisi ya biro na oyo etali banzembo mosusu ya Bokonzi oyo bayembi yango na eyembeli ya mokili, oyo Batatoli ya Yehova mingi bazali na yango mikolo oyo. Balingi koyeba soki ebongiseli ya Batatoli ya Yehova endimi banzembo yango. Toyoki nsango ya banzembo yango mpe tolingi koyebisa bino ete ebongiseli ya Batatoli ya Yehova endimi yango te. Tosɛngi bino bópanza yango te to bópesa yango na bato mosusu te na nzela ya Internet. Tokanisi ete liyebisi oyo ekosembola likambo yango.

◼ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 2005 ezali na motó ya likambo, “Ezali solo ete siansi ná Biblia eyokanaka te?” Lokola motuna yango ezali na ntina mingi, bakobakisela lisangá mokomoko bazulunalo (15%) ya nimero yango koleka ndenge bazwaka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto