Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Febwali: Approchez-vous de Jéhovah. Marsi: Bókɛngɛlaka! Aprili mpe Mai: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.
◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Marsi to mwa moke na nsima na yango soki likoki ezali. Soki ezali na kɔnti mosusu oyo esengeli kotalela, na ndakisa mbongo mpo na kobongisa to kotonga Ndako ya Bokonzi, esengeli mpe kotalela yango. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.
◼ Mokomeli ya lisangá mpe mokɛngɛli na mosala ya kosakola basengeli kotalela mosala ya babongisi-nzela nyonso ya sanza na sanza. Soki moko na bango azali na mokakatano ya kokokisa ngonga oyo esɛngami, bankulutu basengeli koluka ndenge ya kosalisa ye. Mpo na kozwa makanisi mosusu, talá mokanda S-201 oyo biro etindaka mbula na mbula.
◼ Lisukulu ya ntina mingi mpo na mobu 2005 oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ezali na motó ya likambo “Mpo na nini Yesu anyokwamaki mpe akufaki?” Talá na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2004.
◼ Ekozala malamu basakoli nyonso bazangisa Makita te na mokolo ya lomingo 20 Marsi mpo na kolanda liyebisi ya ntina mingi oyo etali ebongiseli moko ezwami mpo na basakoli.
◼ Biro ekondima te komande oyo mosakoli moko atindi mpo na mikanda na ye moko. Mokɛngɛli-mokambi akosala ete liyebisi epesamaka liboso ete lisangá etinda komande na yango ya mikanda na biro. Yango ekosala ete baoyo nyonso bazali na mposa ya kozwa mikanda ete báyebisa yango na ndeko oyo azali kotalela mikanda. Bóbosana te mikanda oyo ezali na molɔngɔ ya articles sur demande spéciale.