Eteni 6—Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
Ntango moyekoli atuni motuna
1 Ntango obandi koyekola Biblia na moto moko, mbala mingi ezalaka malamu kotalela mateya ya Biblia na molɔngɔ na esika ya koyekola lisolo moko opumbwe okei na mosusu. Yango esalisaka moyekoli azwa boyebi ya solo mpe akola na elimo. (Kols. 1:9, 10) Kasi, mbala mingi bayekoli batunaka mituna ndenge na ndenge na ntango ya boyekoli. Ndenge nini okoki koyanola na mituna yango?
2 Zalá na bosɔsɔli: Mbala mingi, esengeli kopesa eyano mbala moko na mituna oyo ezali na boyokani na lisolo oyo bozali kotalela. Soki mokanda oyo bozali kotalela ekolobela motuna yango na mikapo oyo ezali kolanda, okoki kaka kolimbolela ye ete bokolobela yango nsima. Kasi, soki motuna yango ezali na boyokani te na lisolo oyo bozali kotalela to ezali kosɛnga kosala bolukiluki mpo na kozwa eyano oyo ebongi, ekozala malamu kolobela likambo yango na nsuka ya boyekoli to na ntango mosusu. Basakoli mosusu bamonaka ete soki bakomi motuna ya moyekoli na papye, moyekoli akomona ete motuna na ye ezali na ntina mpe yango ekosala ete bálongola makanisi na bango te na likambo oyo bazali kotalela.
3 Mikanda mingi oyo tosalelaka mpo na koyekola na bato etalelaka mateya mingi ya Biblia kaka na mokuse. Okosala nini soki moyekoli azali kokakatana mpo na kondima liteya moko to akangami na liteya moko ya lokuta? Ekozala malamu bótalela elongo mokanda mosusu oyo elobeli na mozindo oyo Biblia elobi na likambo yango. Soki moyekoli andimi kaka te, bombá lisolo yango mpo na kolobela yango mokolo mosusu mpe bókoba na boyekoli. (Yoa. 16:12) Mbala mosusu, akokanga ntina mpenza ya liteya yango soki akómi na boyebi mingi ya Biblia mpe akoli na elimo.
4 Yebá bandelo na yo: Soki omoni ete oyebi eyano ya motuna moko malamu te, koluka te kopesa likanisi na yo moko. (2 Tim. 2:15; 1 Pet. 4:11) Monisá moyekoli ete okokenda kosala bolukiluki mpe okopesa ye eyano. Kutu, okoki kosalela libaku yango mpo na koteya moyekoli ndenge ya kosala bolukiluki. Mokemoke, monisá ye ndenge ya kosalela bisaleli oyo ebongiseli ya Yehova epesi biso. Na ntembe te, yango ekosalisa ye azwaka biyano na mituna na ye.—Mis. 17:11.