Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/04 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 12/04 lok. 7

Mayebisi

◼ Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Yanuali: Nzela ya bomoi ya seko​—⁠Osili komona yango? Febwali: Approchez-vous de Jéhovah. Marsi: Bókɛngɛlaka!

◼ Lamuká! ya 22 Yanuali 2005 ezali na motó ya likambo “Mieux comprendre son médecin,” ebongisami mpo na kosalisa bato báyokanaka malamu na minganga na bango. Na ntembe te, minganga bango moko mpe bakosepela mingi na masolo yango, mpamba te ezali komonisa ntina oyo minganga mosusu basepelaki na nsango ya elikya ya Biblia. Ekoki kozala ete okosepela kozwa Lamuká! yango mwa mingi mpe okosala makasi mpo na kopesa yango na monganga na yo ná bato mosusu oyo batalaka makambo ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto. Masangá basengeli kokomela biro libelalibela soki bazali na mposa ya kozwa Lamuká! yango mingi.

◼ Na mokolo ya 4 Desɛmbɛ 2004 mpe ya 7 Mai 2005, mosala ekozala te na Betele ya Kinshasa, na Limete (bandeko ya Betele bakosala mosala ya kotya bopɛto na Betele mobimba). Na yango, tolingi koyebisa bino ete bóya na Betele te na mikolo wana mibale.

◼ Nkasa ya libyangi na Ekaniseli mpo na mobu 2005 ekotindama na minɔkɔ oyo lisangá mokomoko esalelaka na makita na yango. Soki ezali na minɔkɔ mosusu oyo elobamaka na teritware na bino mpe bolingi bátindela bino nkasa ya libyangi na minɔkɔ yango, bosengeli kosɛnga yango nokinoki; bokosalela formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Liste ya minɔkɔ oyo nkasa ya libyangi yango ezali, ekobima na “Avis aux congrégations,” oyo etindamaka na masangá sanza na sanza. Tosɛngi bino bósɛnga nkasa ya libyangi kaka na minɔkɔ oyo bokoki kosalela na teritware na bino.

◼ Ekaniseli mpo na mobu 2006 ekosalema na mokolo ya misato 12 Aprili nsima ya kolala ya moi. Liyebisi oyo epesami liboso mpo ete epai oyo masangá mingi bazali kosalela Ndako ya Bokonzi moko, masangá mosusu ekoka kozwa bibongiseli mpo na koluka bisika mosusu ya kosala Ekaniseli. Soki bankulutu basengeli kofutela esika moko, bakosolola na nkolo esika yango mpo báyeba malamu soki makambo mosusu ekosalema te na esika yango, oyo ekoki kobebisa molulu ya Ekaniseli. Yango ekopesa nzela ete Ekaniseli esalema na kimya mpe na mobulu te.

◼ Lokola likambo yango ezali na ntina mingi, lisangani ya bankulutu esengeli kopona nkulutu oyo azali na makoki mpo na kosala lisukulu na esika ete básalaka yango moto na moto na ngala na ye to básalelaka bobele ndeko moko mbula na mbula. Soki bozali na nkulutu moko mopakolami oyo azali molobi malamu, ye akosala lisukulu yango.

◼ Kobanda pɔsɔ ya mwa 27 Yuni 2005, tokoyekola buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! na boyekoli ya mokanda. Soki buku yango ezali naino na monɔkɔ na bino te, bósalela oyo ya monɔkɔ mosusu, na ndakisa Lifalanse, Lingala to Swahili.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto