Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/04 lok. 7
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 10/04 lok. 7

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 25 Ɔkɔtɔbɛ 2004. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 6 Sɛtɛmbɛ tii na pɔsɔ ya 25 Ɔkɔtɔbɛ 2004. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.​—⁠Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Ntango tozali kosala lisukulu moko oyo ezali kolobela likambo moko etali mosala na biso ya boklisto, ndenge nini tokoki kosala ete elobeli na biso elendisa bato nyonso? [be lok. 203 par. 3-lok. 204 par. 1]

2. Kozongela makambo elimboli nini mpe mpo na nini yango ezali na ntina? [be lok. 206 par. 1-4]

3. Ndenge nini tokoki konyata motó ya likambo ya masukulu na biso? [be lok. 210 par. 1-5, etanda]

4. Ndenge nini tokoki koyeba makanisi ya ntina ya lisukulu oyo tokosala? [be lok. 212 par. 1-4]

5. Mpo na nini tosengeli kokeba ete tósalela makanisi ya ntina ebele ebele te? [be lok. 213 par. 2-4]

LISOLO NO. 1

6. Makambo nini ezalaki liboso ya Mpela oyo ntango mosusu epekisaki bato bándima ete biloko nyonso oyo ezalaki zingazinga na bango ekosuka? [w02 1/3 nk. 5-6]

7. Mpo na nini ezali likambo ya kobenda likebi ete bato ya ntango ya Yesu bazalaki kobenga ye “Moteyi” kasi “Mobikisi” te? (Luka 3:12; 7:40) [w02 1/5 lok. 4 par. 3; lok. 6 par. 6]

8. Ndenge nini Masese 11:​24, 25 (NW) ezali komonisa ntina ya kosakola mingi? [w02 15/7 lok. 30 par. 3-5]

9. Ntembe nini ebimaki na Edene mpo na kozanga botosi mpe kozanga botosi yango eboti mbuma nini? (Gen. 3:​1-6) [5, w02 1/10 lok. 6 par. 1; lok. 6 par. 3-4]

10. Lolenge nini dati ya kozongisama ya losambo ya solo na Yelusaleme etyamaki? [si lok. 285 par. 5]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Lokola Yehova alobaki na Balama akende elongo na bato ya Balaka, kasi mpo na nini Yehova asilikaki ntango Balama akendeki elongo na bango? (Mit. 22:​20-22)

12. Ndai oyo mwasi moklisto asali, mobali na ye akoki kopekisa ye akokisa yango? (Mit. 30:​6-8)

13. Lelo oyo, “bamboka ya kobombama” ezali nini? (Mit. 35:⁠6) [w95 15/11 lok. 17 par. 8]

14. Esengeli kotalela etinda oyo ezali na Deteronome 6:​6-9, oyo elobeli ‘kokanga mobeko ya Nzambe na lobɔkɔ mpe na motó lokola elembo,’ kaka ndenge ekomami?

15. Elobeli ‘bilamba na yo ekufaki te’ elimboli nde ete bapesaki Bayisalaele bilamba ya sika? (Det. 8:⁠4)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto