Mokanda ya Biro
Bandeko basakoli ya Bokonzi,
Mosala monene ya kobakisa bamasini ya konyata mikanda na ferme ya Wallkill (États-Unis) esili mpe bandeko bazali sikoyo kosalela bamasini yango. Babakisi bamasini mibale ya sika oyo mokomoko ekoki konyata bazulunalo 90 000 na ngonga moko, bakisá mpe bisaleli ya sika mpo na kosala bizipeli ya makasi ya mikanda 120 na miniti moko. Lokola bamasini ya konyata mikanda ekómi sikoyo na Wallkill, yango wana batɛki lopango oyo ezalaki na balabala 360 Furman Street, na Brooklyn. Sikoyo, bandeko bazali kosala mosala makasi ya kobongisa ndako oyo ezali na balabala 117 Adams Street epai badepartema oyo ezalaki na balabala 360 Furman Street ekokóma.
Lokola balongoli bamasini ya konyata mikanda na Brooklyn, bazwi bandeko pene na 300 oyo bazalaki kosala na Brooklyn mpe batindi bango na Wallkill. Lisusu, bazwi bandeko pene na 100 oyo batalelaka makambo ya baordinatɛrɛ mpe bakɔtisaka baprogramɛ ya sika na baordinatɛrɛ oyo filiale esalelaka, oyo bazalaki na Wallkill, mpe batindi bango na Brooklyn. Sikoyo, departema ya makambo ya baordinatɛrɛ ekómi nde na Brooklyn.
Na filiale ya Congo, tosilisaki kelasi ya mbala ya liboso ya bakɛngɛli-batamboli na sanza ya motoba, kelasi yango ezalaki na bana-kelasi 30. Filiale na biso ebongisi bakelasi mitano ya ndenge wana. Bandeko na biso Bakɛngɛli-batamboli bakozwa formasyo oyo ekopesa matomba na masangá nyonso.
Biso nyonso tozali kolikya ‘kozala ntango nyonso na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo,’ awa tozali kobanda mobu ya mosala 2005.—1 Kol. 15:58.
Bandeko na bino,
Biro ya filiale ya Congo