Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 26 Aprili 2004. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 1 Marsi tii na pɔsɔ ya 26 Aprili 2004. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Ntango tozali kosala lisukulu, mpo na nini ezali malamu tósalelaka plan na esika tótángaka yango lokola maniskri? [be lok. 166 par. 3]
2. Wana tozali komibongisa mpo na mosala ya kosakola, ndenge nini tokoki kotya makanisi na biso na molɔngɔ mpe kosala plan na motó? [be lok. 167 par. 3]
3. Salelá Misala 13:16-41 mpe Misala 17:2, 3, mpo na kolimbola ndenge Paulo ‘azalaki komonisa na malamu mpenza ete Yesu azali Klisto.’ (Mis. 9:22) [be lok. 170 par. 2]
4. Wapi mwa matomba ya koloba na maloba na yo moko? [be lok. 175 par. 2-5]
5. Wapi mitambo ya koloba na maloba na yo moko, mpe nini ekoki kosalisa biso tókima yango? [be lok. 176 par. 1–4]
LISOLO NO. 1
6. Ndenge Genese 32:24-32 emonisi yango, eloko nini Yakobo, wana akómi na mbula 97 asalaki mpo na kozwa lipamboli ya Yehova, mpe yango eteyi biso nini? [w02 1/8 nk. 29-31]
7. “Likoki ya kokanisa” ezali nini, mpe ndenge nini yango ekoki kobatela biso tótɛngatɛnga te mpe tómilukela te mpasi oyo ezangi ntina? (Mas. 1:4) [w02 15/8 nk. 21-22]
8. Lolenge nini baoyo basalaka masukulu liboso ya bato mingi bakoki kosala mpo ete bavɛrsɛ nde esimbaka masukulu na bango? [be lok. 52 par. 6–lok. 53 par. 5]
9. Bikateli nini molobi asengeli kozwa mpo akómisa plan oyo ezalaki kaka na makanisi ya ntina lisolo oyo ezali kolimbola bavɛrsɛ? [be lok. 54 par. 2-4]
10. Mpo na nini, na esobe, Yehova apesaki bana ya Yisalaele mana bályaka yango pɔsɔ na pɔsɔ, sanza na sanza, mpe yango ekoki koteya biso nini? (Det. 8:16) [w02 1/9 lok. 30 par. 3-lok. 31 par. 1]
BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ
11. Na kotalela Genese 37:12-17, na ndenge nini mokumba ya Yozefe ekokani na oyo ya Yesu? [w87-F 1/5 lok. 12 par. 12]
12. Soki totaleli lisolo oyo ezali na Genese 42:25-35, ndenge nini Yozefe amonisaki motema mawa oyo ekokani na oyo Yesu azali komonisa? [w87-F 1/5 lok. 18 par. 10; lok. 19, par. 17]
13. Na ndenge nini bibongiseli oyo moombo ya sembo azali kozwa lelo oyo ekokani na bilei oyo bazalaki kokabola na mikolo ya Yozefe? (Gen. 47:21-25)
14. Ntango Yehova alobaki ete, “Nakozala oyo ngai nakozala,” eloko nini amonisaki na oyo etali nkombo na ye? (Ex. 3:14, 15, NW)
15. Wapi makama mibale oyo eutaka na komilelalela oyo Exode 16:2, 3, emonisi? [w93 15/3 nk. 20-21]