Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bazali Batatoli te kasi babalani na Batatoli?
1 Basaleli mingi ya Yehova bazali na mibali to basi oyo basepelaka na Batatoli mpe na makambo ya lisangá, kasi bakokaka te kozwa ekateli ya kokóma basaleli ya Nzambe. Mobali moko alobaki boye: “Kokende kosakola ndako na ndako ezalaki kobangisa ngai.” Mpo na basusu, ntango mosusu basengeli naino kotika bizaleli mosusu oyo Biblia epekisi, to bazali kokanisa ete bakokoka te kokokisa ebele ya makambo ya elimo oyo basi to mibali na bango basalaka. Ndenge nini tokoki kosalisa bango?
2 Tótyelaka bango likebi: Soki tozali kotyela basusu likebi mpe tozali koluka koyeba makambo oyo etungisaka bango, yango ekoki kosalisa bango bándima solo ya Biblia. (Filp. 2:4) Bato mingi oyo bakómá Batatoli nsima ya basi to mibali na bango, balobelaka mbala mingi likebi oyo Batatoli mosusu batyelaki bango mpe ndenge bamonisaki ete balingaka bango. Mobali oyo touti kolobela alobi boye: “José, oyo azali nkulutu, azalaki kotyela ngai likebi mingi. Nakanisi ete ezali makambo oyo azalaki koyebisa ngai nde elendisaki ngai nakóma koyekola malamumalamu.” Mobali mosusu amonisi ete bandeko oyo bazalaki kokende kotala ye bazalaki kosala makasi mpo na kolobela makambo oyo esepelisaka ye; alobi boye: “Nakómaki kotalela lingomba [ya mwasi na ngai] na ndenge mosusu mpenza. Baninga na ye bazalaki bato ya mayele mpenza oyo bakokaki kolobela makambo ya ndenge na ndenge.”—1 Kol. 9:20-23.
3 Tósalisaka bango: Tokoki mpe kosimba mitema ya bato oyo bazali Batatoli te kasi babalani na Batatoli soki tozali kosalela bango makambo ya malamu. (Mas. 3:27; Gal. 6:10) Mokolo moko, motuka ya mobali ya ndeko mwasi moko ekufaki mpe elenge Motatoli moko asalisaki ye. Mobali yango alobi ete: “Likambo yango ekamwisaki ngai mpenza.” Ndeko mobali mosusu asalisaki mobali ya ndeko mwasi moko mokolo mobimba na kotonga efelo ya lopango na ye. Lokola bazalaki kosala mpe kosolola, bakómaki baninga. Pɔsɔ mibale na nsima, mobali yango akendaki kokutana na ndeko mobali yango mpe ayebisaki ye boye: “Sikoyo nasengeli kobongola bomoi na ngai. Okosepela tóyekola Biblia?” Akolaki noki na elimo mpe azali sikoyo Motatoli.
4 Ntango tozali koluka na teritware na biso baoyo babongi, tiká ete tólanda mpe kosalisa bato oyo babalani na bango bazali baninga na biso bandimi.—1 Tim. 2:1-4.