Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yanuali: Buku nyonso oyo ebimaki liboso ya mobu 1988, soki ezali na libombo ya lisangá. Soki bozali na yango te, bótuna na masangá ya pembeni soki bazali na yango mingi mpo bápesa bino ndambo. Masangá oyo ezali na babuku ya kala te bakoki kolakisa buku L’humanité à la recherche de Dieu. Febwali: Approchez-vous de Jéhovah. Soki bozali na buku yango te, bokoki kolakisa buku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? (ya monene to ya moke) to buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! Marsi: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Soki bato bazali na yango, tokoki kolakisa buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
◼ Kobanda pɔsɔ ya 15 Marsi 2004, masangá ya Lifalanse ekoyekola buku Approchez-vous de Jéhovah. Masangá ya Lingala ekoyekola buku Esakweli ya Yisaya 2. Kasi liboso, bakoyekola naino mwa buku Nzela ya bomoi ya seko na boumeli ya pɔsɔ mitano; bakobanda na mwa 15 Marsi 2004: mikapo mibale na pɔsɔ, kasi mokapo 3, 4 mpe 5 bakoyekola yango nyonso misato na pɔsɔ mibale.
◼ Kobanda na sanza ya Febwali, eleka mwa 7 Marsi te, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala lisukulu ya sika ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo “Mitinda ya nani olingaka mingi koleka?”
◼ Masangá esengeli kozwa bibongiseli ya malamu mpo na Ekaniseli oyo ekosalema mbula oyo na Mwalomingo 4 Aprili nsima ya kolala ya moi. Atako lisukulu ekoki kobanda liboso, limpa na vinyo esengeli kolekisama te liboso ya kolala ya moi. Talá ngonga oyo moi elalaka na bingumba ya minene ya teritware na biso: Pointe-Noire, 18:16; Matadi, 18:09; Kinshasa mpe Brazzaville, 18:03; Bandundu, 17:54; Kikwit, 17:48; Bumba, 17:37; Gemena, 18:47; Kananga, 18:37; Mbuji-Mayi, 18:29, Kisangani, 18:26; Kolwezi, 18:20; Likasi, 18:15; Lubumbashi, 18:11; Bukavu, 18:10; Bunia, 18:05. Na bamboka ya teritware na biso oyo ezalaka na ngonga ndenge moko, mpo na koyeba ngonga ya kolala ya moi ya esika mosusu, esengeli kobakisaka miniti 5 na ngonga ya kolala ya moi ya engumba monene mbala nyonso oyo totamboli kilomɛtrɛ 140 na wɛsti ya engumba monene yango. Lokola makita mosusu ekozala te na mokolo yango, longola kaka likita ya mosala ya kosakola, bosengeli kotala mokolo nini ebongi mpo na koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Na pɔsɔ yango, bakɛngɛli ya zongazonga basengeli kolanda programɛ ya makita oyo lisangá ebongisi. Atako ezali malamu ete lisangá na lisangá esala Ekaniseli na yango, na bisika mosusu ekokoka te kosalema bongo. Epai masangá mingi esalaka makita na Ndako ya Bokonzi moko, ntango mosusu lisangá moko to masangá mingi ekoki kosalela bisika mosusu na mpokwa wana. Tosɛngi bino ete soki likoki ezali, ntango lisangá ya liboso ekosilisa, bólekisa miniti 40 liboso ete lisangá mosusu ebanda mpo lisangá na lisangá esala molulu yango malamu mpenza. Lisangani ya bankulutu basengeli kopona bibongiseli oyo ekozala malamu na esika oyo bafandi.