Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/03 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 12/03 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Bokoki mpe kolakisa buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia, to buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? to Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Yanuali: Buku nyonso oyo ebimaki liboso ya mobu 1988, soki ezali na libombo ya lisangá. Soki bozali na yango te, bótuna na masangá ya pembeni soki bazali na yango mingi mpo bápesa bino ndambo. Masangá oyo ezali na babuku ya kala te bakoki kolakisa buku L’humanité à la recherche de Dieu. Febwali: Approchez-vous de Jéhovah. Soki bozali na buku yango te, bokoki kolakisa babuku oyo: La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? to Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!

◼ Tolingi koyebisa lisusu na bandeko oyo batalelaka mbongo ya lisangá ete: Mbongo oyo etyamaka na bakɛsi ya Makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mpe Makabo mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi esengeli kotindamaka sanza nyonso mpe esengeli te kosalelama mpo na kofuta nyongo ya lopango ya Ndako ya Bokonzi to kosalema mpo na makambo mosusu ya lisangá.

◼ Nkasa ya libyangi na Ekaniseli mpo na mobu 2004 ekotindama na lokota oyo lisangá mokomoko esalelaka na makita na yango. Soki ezali na nkota mosusu oyo elobamaka na teritware na bino mpe soki bolingi bátindela bino nkasa ya libyangi na nkota yango, bosengeli kosɛnga yango nokinoki; bokosalela formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Liste ya nkota oyo nkasa ya libyangi yango ezali, ekobima na “Avis aux congrégations,” oyo etindamaka na masangá sanza na sanza. Tosengi bino bósɛnga nkasa ya libyangi kaka na minɔkɔ oyo bokoki kosalela na teritware na bino.

◼ Ekaniseli mpo na mobu 2005 ekosalema na mokolo ya minei 24 Marsi nsima ya kolala ya moi. Liyebisi oyo epesami liboso mpo ete epai oyo masangá mingi bazali kosalela Ndako ya Bokonzi moko, masangá mosusu ekoka kozwa bibongiseli mpo na koluka bisika mosusu ya kosala Ekaniseli. Soki bankulutu basengeli kofutela esika moko, bakosolola na nkolo esika yango mpo báyeba malamu soki makambo mosusu ekosalema te na esika yango, oyo ekoki kobebisa molulu ya Ekaniseli. Yango ekopesa nzela ete Ekaniseli esalema na kimya mpe na mobulu te. Lokola likambo yango ezali na ntina mingi, lisangani ya bankulutu esengeli kopona nkulutu oyo azali na makoki mpo na kosala lisukulu na esika ete básalaka yango moto na moto na ngala na ye to básalelaka bobele ndeko moko mbula na mbula. Soki bozali na nkulutu moko mopakolami oyo azali molobi malamu, ye akosala lisukulu yango.

◼ Masangá ya Lingala ekoyekola buku Esakweli ya Yisaya 2. Kasi liboso bakoyekola naino mwa buku Nzela ya bomoi ya seko na boumeli ya pɔsɔ mitano; bakobanda na mwa 15 Marsi 2004: Mikapo mibale na pɔsɔ, kasi mokapo 3, 4 mpe 5 bakoyekola yango mokomoko na boumeli ya pɔsɔ mibale.

◼ Betele ná badepo etindaka te mikanda oyo ndeko moko akomeli ndeko mosusu to bato mosusu. Etindaka kaka mikanda oyo bakomeli Betele, masangá mpe bakɛngɛli ya zongazonga. Tosɛngi masangá nyonso bátosa ebongiseli yango. Mpo na mikanda na bino moko oyo etali makambo ya lisangá te, tosɛngi bino bósalela posita to bakompanyi mosusu oyo esalaka mosala yango. Lisangá oyo etindi mikanda na Betele, yango moko nde esengeli kofuta mbongo oyo esɛngami mpo na yango. Masangani ya bankulutu basengeli mbala na mbala koluka koyeba soki masangá na bango ezali kopesa makabo mpo na kofuta mbongo yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto