Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/03 lok. 5
  • Bozongeli ya eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 12/03 lok. 5

Bozongeli ya eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 29 Desɛmbɛ 2003. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 3 Novɛmbɛ tii na pɔsɔ ya 29 Desɛmbɛ 2003. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.​—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Mpo na nini ezali na ntina mingi kosalela Biblia na mosala ya kosakola? [be lok. 145 par. 2, etanda]

2. Ndenge nini bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima ya vɛrsɛ moko esalisaka na koyeba makambo oyo okoloba liboso ya kotánga vɛrsɛ yango? [be lok. 149]

3. Mpo na nini ezali na ntina ete tónyataka maloba oyo ebongi ntango tozali kotánga vɛrsɛ moko ya Biblia, mpe ndenge nini tokoki konyata maloba oyo ebongi? [be lok. 151 par. 3, etanda]

4. Ndenge nini tosengeli kosalela toli oyo Paulo apesaki ya ‘kosembola liloba ya solo malamumalamu’ ntango tozali koteya basusu; mpe yango ezali na ntina nini? (2 Tim. 2:15) [be lok. 153 par. 2, etanda]

5. Ndenge nini Paulo azalaki ‘kososola elongo na bato uta na Makomami’? (Mis. 17:2, 3) [be lok. 155 par. 5–6]

LISOLO NO. 1

6. Ntango tozali kosalela Biblia, mokanda ya libosoliboso epai tolukalukaka mateya na biso, mpo na kobongisa lisukulu, mpo na nini ezali malamu (1) tótalelaka bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima ya vɛrsɛ oyo tozali kotánga, (2) tótalelaka mitindami, mpe (3) tósalelaka Concordance biblique? [be lok. 34 par. 3–lok. 35 par. 2]

7. Ndenge nini tokoki komonisa bosembo ya solosolo mpe epai ya nani tosengeli komonisa yango? [w01 1/10 nk. 22-23]

8. Nini ezali komonisa ete Yehova azali motosi monene ya ntango? (Dan. 11:35-40, NW; Luka 21:24) [si lok. 284 par. 1]

9. Nsima ya kolukaluka na mikanda mpo na kobongisa lisukulu, makambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kopona makanisi oyo tokosalela na lisukulu yango? [be lok. 38]

10. Mpo na nini makambo oyo Yesu alobaki mpo na “mikolo ya Noa” ebongi mpe mpo na biso lelo oyo? (Mat. 24:37) [w01 15/11 lok. 31 par. 2-3]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Ndenge nini mokanda oyo Paulo akomelaki Filemona ezali komonisa ete mokumba ya baklisto ezali ya kosalisa bato bákóma baklisto, kasi te ya kobongola makambo na mboka? (Flmo. 12)

12. Bokeseni nini ezali kati na maloba oyo: ‘kopɛngwa na nzela,’ ‘komitangola,’ mpe ‘kotika nzela’? (Ebe. 2:1; 3:12; 6:6) [w99 15/7 lok. 19 par. 12; w86-F 1/6 lok. 14 par. 16-17; w81-F 1/3 lok. 23 par. 8]

13. Tokoki kosala nini mpo tókómisa te elobeli “soki Yehova alingi” likambo ya lisɛki? (Yak. 4:15) [cj lok. 170 par. 3-lok. 171 par. 1]

14. ‘Kozela mpe kobatela na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova’ elimboli nini, mpe ndenge nini tokoki kosala yango? (2 Pet. 3:12) [w97 1/9 nk. 19-20]

15. Maloba oyo Yesu atindelaki masangá nsambo oyo elobelami na Emoniseli mokapo 2 mpe mokapo 3 ezali na toli nini ya ntina mpo na baklisto ya lelo oyo? (Emon. 2:4, 5, 10, 14, 20; 3:3, 10, 11, 17, 19)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto