Bozongeli ya eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 27 Okɔtɔbɛ 2003. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 1 Sɛtɛmbɛ tii na pɔsɔ ya 27 Ɔkɔtɔbɛ 2003. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Toli oyo ezali na 1 Timote 2:9, oyo elobeli kobongisa nzoto na “molato ya malamu,” elimboli nini mpe yango esengeli kotinda biso tólataka mpe tóbongisaka nzoto ndenge nini ntango tozali kosala lisolo na lisangá to ntango tozali na mosala ya kosakola? [be lok. 132 par. 4-5]
2. Soki tozali kotosa mitinda ya Biblia oyo ezali na 1 Yoane 2:15-17, Baefese 2:2, mpe Baloma 15:3, molato mpe monzɛlɛ na biso ekozala ndenge nini? [be lok. 133 par. 2-4]
3. Koloba kozanga kobanga ezali na ntina nini, mpe ndenge nini tokoki koloba kozanga kobanga ntango tozali kosala lisolo na estrade to ntango tozali kosakola? [be etanda ya lok. 135; lok. 136 par. 5 mpe etanda]
4. Lokola Yesu azali “motatoli ya sembo mpe ya solo,” ndakisa nini atikelaki biso na oyo etali kosalela Biblia na mosala ya kosakola? (Emon. 3:14) [be lok. 143 par. 2-3]
5. Ndenge nini tokoki koyeba kosalela Biblia malamu lisusu? (Tito 1:9) [be lok. 144 par. 1 mpe etanda]
LISOLO NO. 1
6. Koyekola esɛngaka nini, mpe wapi mwa matomba oyo tokoki kozwa soki toyekolaka Liloba ya Nzambe mbala na mbala? [be lok. 27 par. 3; lok. 32 par. 3]
7. Na kotalela maloba ya Yakobo 1:5, 6, likambo nini ezali na ntina mingi ntango tolingi kozwa ekateli moko ya monene? [w01 1/9 lok. 28 par. 4]
8. Badati ya sikisiki ezali nini, mpe mpo na nini yango ezali na ntina mingi? [si lok. 282 par. 27]
9. Na ndenge nini “ye oyo akopalanganisa nsango mabe ya moto” azali zoba? (Mas. 10:18) [w01 15/9 lok. 25 par. 3]
10. Na mokili ya sika, ndenge nini bato bakososola malamumalamu lolenge oyo Yehova atalelaka ntango? [si lok. 283 par. 32]
BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ
11. Solo to lokuta: Na 1 Bakolinti 2:9, ntoma Paulo azali kolobela biloko oyo Yehova abongiseli basaleli na ye ya sembo mpo na kopesa bango lokola libula. Limbolá. [ip-2-F lok. 366 etanda]
12. Maloba oyo ezali na 1 Bakolinti 10:13 ezali kolobela komekama nini, mpe ndenge nini Yehova ‘abongisaka nzela ya kobimela’? [w91 1/10 nk. 10-11 par. 11-14]
13. Ndakisa ya bokabi oyo Yesu atikeli baklisto esengeli kotinda bango na kosala nini? (2 Kol. 8:9) [w92 15/1 lok. 16 par. 10]
14. Ndenge nini Mibeko ezalaki ‘molakisi oyo azalaki kokamba epai ya Klisto?’ (Gal. 3:24) [w02 1/6 lok. 15 par. 11]
15. Wapi “makambo mikemike ya mokili” oyo tosengeli komibatela na yango mpo bápɛngwisa biso te? (Kols. 2:8)