Bilenge—Bómitongela moboko kitoko mpo na mikolo oyo ezali koya
1. Mpo na nini bilenge baklisto basengeli kozala na kondima makasi?
1 Likambo nini bokanisaka mingi? Bokanisaka makambo nini? Bokanisaka mingi makambo ya mikolo oyo to makambo ya mikolo ezali koya mpe bilaka ya Nzambe? (Mat. 6:24, 31-33; Luka 8:14) Ndenge ndakisa ya Abalayama ná Moize emonisi yango, esɛngaka kozala na kondima makasi mpo na kosala makambo oyo eyokani na bilaka ya Nzambe. (Ebe. 11:8-10, 24-26) Ndenge nini bokoki kozala na kondima yango mpe kotonga ‘moboko kitoko mpo na mikolo oyo ezali koya.’—1 Tim. 6:19.
2. Liteya nini tozwi na ndakisa ya mokonzi Yosiya?
2 Bóluka Yehova: Soki bozali na programɛ ya makambo ya elimo oyo bolandaka na libota na bino, yango ezali malamu. Kasi, bókanisa te ete programɛ yango ekopesa bino mbala moko kondima makasi. Mpo na kozwa ‘boyebi ya Nzambe,’ bosengeli koluka Yehova bino moko. (Mas. 2:3-5; 1 Nta. 28:9) Elenge mokonzi Yosiya asalaki yango. Atako akolaki na libota oyo ezalaki na elimo ya malamu te, ntango akokisaki mbula 15, “abandaki koluka Nzambe ya Davidi, [nkɔkɔ] na ye.”—2 Nta. 34:3.
3. Ndenge nini lelo oyo bilenge baklisto bakoki koluka Yehova?
3 Ndenge nini bokoki koluka Yehova? Soki bozali kotalela malamumalamu makambo oyo bondimaka mpe bozali ‘komindimisa bino moko’ ete makambo yango ezali mpenza solo. (Lom. 12:2) Na ndakisa, bokoki kolimbola oyo Biblia elobi mpo na makila, to komonisa ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló na mobu 1914? Mpo na komitongela moboko kitoko mpo na mikolo oyo ezali koya, ezali na ntina mingi mpenza kozwa “boyebi ya sikisiki ya solo.”—1 Tim. 2:3, 4.
4. Ndenge nini basakoli oyo bazwi naino batisimo te bakoki komonisa polele bokoli na bango?
4 Ndenge Yosiya alukaki Nzambe ebimisaki mpenza matomba. Liboso ete akokisa mbula 20, alongolaki na mpiko mpenza losambo ya lokuta na mboka. (2 Nta. 34:3-7) Ndenge moko mpe, kokola na bino na elimo ekomonana polele na misala na bino. (1 Tim. 4:15) Soki bozali basakoli oyo bazwi naino batisimo te, bósala makasi mpo na kobongisa lisusu lolenge na bino ya kosakola. Bósuka kaka te na kolakisa bazulunalo. Bómityela mokano ya kosalela Biblia, ya kososola na bato, mpe ya kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu. (Lom. 12:7) Yango ekosalisa bino bókola na elimo.
5. Mabaku nini baklisto oyo bazwi batisimo bazali na yango ya kokolisa mosala na bango?
5 Bópesa Yehova oyo bozali na yango ya malamu koleka: Ntango bozwi batisimo mpo na komonisa ete bomipesi na Yehova, bokómi baministre ya Nzambe. (2 Kol. 3:5, 6) Yango epesi bino mabaku mingi ya kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso, na ndakisa, kosala mosala ya mobongisi-nzela, kosala na Betele, kozala misionɛrɛ, mpe kosala mosala ya kotonga bandako ya Betele mpe Bandako ya Bokonzi na mokili mobimba. Ezali mpe na makambo mosusu oyo bokoki kosala mpo na kokolisa mosala na bino, na ndakisa koyekola monɔkɔ mosusu to kokende kosala esika mposa ya basakoli ezali makasi.
6. Ndenge nini biso nyonso tokoki komitongela moboko kitoko mpo na mikolo oyo ezali koya?
6 Ya solo, moklisto nyonso te nde azali na likoki ya kosala misala nyonso oyo totángi, kasi mokomoko na biso akoki kopesa Yehova oyo azali na yango ya malamu koleka. (Mat. 22:37) Ata soki bomoi na bino ezali ndenge nini, bósala ete mosala ya Yehova ezala na esika ya liboso na bomoi na bino. (Nz. 16:5) Soki bosali bongo, bokomitongela moboko kitoko mpo na mikolo oyo ezali koya.