Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Sɛtɛmbɛ: La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto moko asepeli, tokolakisa ye mpe mwa buku Azali kosɛnga, mpe tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Novɛmbɛ: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Soki bato bazali na mikanda yango, bokoki kopesa bango buku Tósambela Nzambe kaka moko ya solo to mokanda mosusu ya kala. Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Bokoki mpe kolakisa buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia, to buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? to Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis.
◼ Biro ekondima te komande oyo mosakoli moko atindi mpo na mikanda na ye moko. Mokɛngɛli-mokambi akosala ete liyebisi epesamaka sanza nyonso liboso ete lisangá etinda komande na yango ya mikanda na biro. Yango ekosalisa baoyo nyonso bazali na mposa ya kozwa mikanda mpo na bango moko ete bákoka koyebisa yango na ndeko oyo azali kotalela mikanda. Bóbosana te mikanda nini oyo ezali na molɔngɔ ya articles sur demande spéciale.
◼ Bankulutu basengeli kobosana te kolanda malako oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1991, nk. 21-23, oyo etali moto nyonso oyo abimisamaki na lisangá to moto nyonso oyo amilongolaki ye moko, kasi azali na mposa ya kozonga na lisangá.
◼ Lisukulu ya ntina mingi mpo na mobu 2004 oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ekosalema na mokolo ya lomingo mwa 18 Aprili. Motó ya likambo ya lisukulu yango ekoyebisama nsima. Masangá oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakotala to oyo ekozala na liyangani ya zongazonga to ya mokolo moko na pɔsɔ yango, ekosala lisukulu yango na pɔsɔ oyo ekolanda. Lisangá moko te esengeli kosala lisukulu yango liboso ya mokolo ya 18 Aprili 2004.