Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/03 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 5/03 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango bozali kozongela bato oyo basepelaki na nsango na biso mpe baoyo bayaki na Ekaniseli to na makita mosusu ya lisangá, nzokande bayaka mbala na mbala te na makita ya lisangá, bósala makasi mpo na kotikela bango buku ya sika Tósambela Nzambe kaka moko ya solo. Bosengeli kosala nyonso mpo na kobanda koyekola na bango Biblia, mingimingi baoyo basili koyekola buku Boyebi mpe mwa buku Azali kosɛnga. Yuni: Tokolakisa buku Boyebi to mwa buku Azali kosɛnga. Soki bato oyo tokei kotala bazali na mikanda yango, tokotikela bango mwa buku mosusu oyo eyokani na mposa na bango, oyo ezali na stokɛ ya lisangá. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis, Nini ekómelaka biso soki tokufi?, Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko, Ntango moto oyo olingaka akufi, Ntina ya bomoi ezali nini?—Ndenge nini tokoki koyeba yango? Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?, Osengeli kondima Trinité?, Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?, Sepela na bomoi ya seko na Mabele!, mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Na bisika mosusu ya mokili, mwa babuku oyo elandi ekoki kozala malamu mpo na kolakisa bato: Bilimu ya bakufi—​bikoki kosala yo mabe? Bizali solo? Un livre pour tous, Une vie satisfaisante​—Comment?, Nos problèmes​—Qui nous aidera à les résoudre?, mpe Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?

◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Yuni to mwa moke na nsima na yango soki likoki ezali. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.

◼ Esɛngami na bakomeli ya masangá ete bátindaka balapolo ya sanza na sanza ya mosala ya kosakola ya lisangá (S-1) nɔkinɔki na biro, nsuka mokolo ya motoba ya sanza oyo elandi. Esengeli te kofandisa balapolo ya basanza mingi liboso ya kotinda yango na biro.

◼ Lapolo ya Ekaniseli (S-7) esengeli kotindama nɔkinɔki na biro nsima ya Ekaniseli. Ata soki batindaki lapolo yango na banzela mosusu, esɛngami na masangá oyo ezali mosika na badepo ete bámema kopi ya lapolo na bango ya Ekaniseli na liyangani ya Etúká mpe kopesa yango na mabɔkɔ ya momonisi ya biro ya filiale, ye akotinda yango mbala moko na biro ya filiale. Emonanaka mbala mingi ete balapolo mingi ya masangá ya mosika ebungaka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto