Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 28 Aprili 2003. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 3 Marsi tii na pɔsɔ ya 28 Aprili 2003. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Makambo nini ekoki kosala ete moto akakatana na maloba? [be lok. 93]
2. Solo to Lokuta: Ntango ozali koloba, ebongi te kopemaka mpo esalaka ete makanisi ya bato etɛngatɛnga mpe epesaka bango nzela bákataka yo maloba. Limbolá.
3. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete molobi to moto oyo azali kotánga liboso ya lisangá ayeba konyata maloba ya ntina? (Neh. 8:8) [be lok. 101]
4. Ndenge nini moto akoki kobongisa lolenge ya konyata maloba ya ntina? [be nk. 102-103]
5. Makanisi nini ya ntina moto oyo azali kotánga mokanda na boyekoli ya Biblia to na lisangá asengeli konyata? [be lok. 105]
LISOLO NO. 1
6. Ndenge nini baboti baklisto bakoki koteya bana na bango “mpo ete báyoka mpe báyekola” na makita ya boklisto? (Det. 31:12) [be lok. 16]
7. Paladiso ya elimo ezali nini? [w01 1/3 nk. 8-10]
8. Ndenge nini Masese 8:1-3 emonisi ete moto nyonso akoki kozwa bwanya oyo euti na Nzambe, mpe na kotalela Bakolose 2:3, epai wapi tokoki kozwa bwanya yango? [w01 15/3 nk. 25, 28]
9. Ndenge nini tokoki kosala mpo nkombo ya Nzambe eyebana? (Yoa. 17:6) [be nk. 273-275]
10. Makambo nini ya ntina mingi bato basengeli koyeba na oyo etali “nsango malamu ya Bokonzi”? (Mat. 24:14) [be nk. 279-280]
BOTÁNGI YA BIBLIA
11. (a) Na ekeke ya liboso, “eloko ya bosɔtɔ” oyo elobelami na Malako 13:14 ezalaki nini? (b) ‘Kotɛlɛma na yango na esika oyo yango esengeli kotɛlɛma te’ elakisi nini?
12. Ndenge nini Evanzile ya Luka ezali komonisa ete Yesu azalaki mpenza mokitani ya solosolo na kiti ya bokonzi ya Davidi? (Luka 3:23-38) [w92 1/10 lok. 9 par. 3]
13. Maloba ya Yesu oyo ezali na Luka 12:2 ezali na ntina nini?
14. Na lisese ya Yesu ya dalakima ya ebende oyo ebungaki, mpo na nini kosepela ya baanzelu ezali likambo ya kokamwa? (Luka 15:10) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na bango?
15. Wapi kondimana mibale oyo Luka 22:29 elobeli?