Ndenge oyo solo epesaka biso bonsomi
1 Mokolo mosusu, Yesu ayebisaki Bayuda oyo bandimelaki ye ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoa. 8:32) Azalaki kolobela bonsomi oyo eleki mwa ntomo ya kosala makambo mosusu oyo Leta apesaka bato oyo azali koyangela; ezalaki bonsomi oyo moto nyonso—ezala moto ya bomɛngo to mobola, moto oyo atánga to oyo atánga te—akoki kozwa. Yesu ateyaki solo oyo ekolongola bato na boombo ya lisumu mpe ya liwa, mpamba te Yesu amonisaki ete “moto nyonso oyo asalaka lisumu azali moombo ya lisumu.” (Yoa. 8:34) Tozali mpenza kozela na mposa makasi mokolo oyo bato nyonso ya botosi ‘bakolongolama na boombo ya kopɔla mpe bakozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo’!—Lom. 8:21.
2 Solo oyo etali Yesu mpe mokumba na ye kati na kokokisama ya mokano ya Nzambe epesaka biso bonsomi. Na ndakisa, toyebi ete Yesu amipesaki lokola mbeka mpo na kobikisa biso. (Lom. 3:24) Ata lelo oyo, soki tondimi solo ya Biblia mpe totosi yango mpenza, tokozwa mwa bonsomi na makambo oyo: tokolongola kobanga, tokozala na elikya, mpe tokobwaka mimeseno nyonso ya mabe.
3 Esikoli biso na kobanga mpe kozanga elikya: Makambo oyo ezali na mokili ekoki te komema biso na kozanga elikya, mpamba te toyebi ntina oyo mabe ezali mpe toyebi ete etikali moke mabe yango esila awa na mabelé. (Nz. 37:10, 11; 2 Tim. 3:1; Emon. 12:12) Longola yango, solo esikoli biso na mateya ya lokuta oyo etali ndenge moto akómaka soki akufi. Toyebi ete bato oyo bakufá bakoki kosala biso mabe te, bazali konyokwama libela na libela te, mpe Nzambe atikaka te ete bato bákufa kaka mpo bákóma bilimo bákende kofanda na ye.—Mos. 9:5; Mis. 24:15.
4 Solo yango epesaki tata moko ná mwasi na ye makasi ntango mwana na bango akufaki na likama. Mama ya mwana yango alobaki boye: “Eloko moko ezali kozanga na bomoi na biso. Tii ntango tokomona lisusu mwana na biso na nzela ya lisekwa nde tokobɔndisama mpenza. Kasi toyebi ete mpasi na biso ezali kaka ya ntango mokuse.”
5 Esikoli biso na mimeseno ya mabe: Solo oyo ezali na Biblia ekoki kobongola makanisi mpe bizaleli ya moto mpe na ndenge yango ekoki kosikola ye na mikakatano oyo ekokaki kokómela ye. (Ef. 4:20-24) Kosala makambo na bosembo mpe kozala na molende na mosala ekoki kosalisa moto azinda na bobola te. (Mas. 13:4) Kolinga basusu mpe komipesa mpo na bolamu na bango ebongisaka boyokani na biso ná bango. (Kols. 3:13, 14) Kotosa esika oyo Yehova apesi moto na moto na kati ya libota esalaka ete mikakatano ebima mingi te na kati ya libota. (Ef. 5:33–6:1) Moto oyo aboyi milangwa, pite to ekobo, likaya mpe bangi, azalaka nzoto kolɔngɔnɔ.—Mas. 7:21-23; 23:29, 30; 2 Kol. 7:1.
6 Elenge mobali moko azalaki kokoka te kotika momeseno ya komɛla bangi oyo aumelaki na yango mbula libwa. Mokolo moko, akutanaki na mosakoli moko oyo azalaki kosakola na balabala. Elenge yango andimaki kozwa mokanda moko mpe bapesanaki mokolo oyo mosakoli yango asengelaki kokende kotala ye na ndako. Na mokolo yango, boyekoli ya Biblia ebandaki. Nsima ya sanza mibale, elenge yango atikaki mpenza komɛla bangi; mpe nsima ya koyekola Biblia na boumeli ya sanza mwambe, azwaki batisimo. Ntango yaya na ye ya mobali ná mwasi na ye bamonaki ete atiki komɛla bangi, bango mpe babandaki koyekola Biblia.
7 Tósalisa basusu bázwa bonsomi: Baoyo bakangami na boombo ya mateya ya lokuta banda babotamá bakoki kozala na mokakatano mpo na kokanga ntina ya bonsomi oyo Liloba ya Nzambe epesaka. Mosakoli oyo azali koteya bango asengeli kozala na molende mpenza mpe asengeli komibongisaka malamu mpo akoka kosimba mitema na bango. (2 Tim. 4:2, 5) Oyo ezali lisusu ntango ya kolɛmbisa mabɔkɔ te na mosala na biso ya ‘kosakola bonsomi na baoyo bakangami.’ (Yis. 61:1, NW) Bonsomi ya baklisto ezali na motuya mingi. Kozwa yango elakisi bomoi ya seko.—1 Tim. 4:16.