Teyá basusu monɔkɔ ya pɛto
1 Atako bauti ‘na bikólo, na mabota, na mikili mpe na minɔkɔ’ ndenge na ndenge, Batatoli ya Yehova bazali bato oyo bazali na bomoko, libota ya solosolo ya bandeko kati na mokili mobimba. (Emon. 7:9) Yango ezali mpenza likambo ya kokamwa na mokili ya lelo oyo etondi na bokabwani. Ndenge nini likambo yango ezali kosalema? Esalemi bongo mpo tosali ‘mbongwana kino tokómi koloba monɔkɔ ya pɛto.’—Sef. 3:9.
2 Matomba oyo ezali kosepelisa: Monɔkɔ yango ya pɛto ezali nini? Ezali bongo bososoli ya solo oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe, oyo etali Yehova mpe mikano na ye na ndenge ya malamu mpenza, mingimingi solo na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Lokola Yesu asakolaki yango, “moombo ya sembo mpe ya mayele” nde azwi mokumba ya kokabola solo yango awa na mabelé, mpe litomba ezali ete bato “oyo bauti na minɔkɔ nyonso na bikólo ndenge na ndenge” bakɔti na losambo ya solo.—Mat. 24:45; Zek. 8:23.
3 Wana bato bazali koyekola monɔkɔ ya pɛto, motema na bango etindaka bango na koyokanisa bomoi na bango na mitinda ya Yehova. Bayekolaka ndenge ya kozala “liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.” (1 Kol. 1:10) Mateya ya Nzambe ezali mpe kosala ete bázala na etamboli moko ya sembo mpe ya malamu, na maloba ya pɛto mpe ya bosolo, mingimingi ntango bazali koyebisa bato mosusu nsango malamu. (Tito 2:7, 8; Ebe. 13:15) Mbongwana wana ya kitoko ezali kokumisa Yehova.
4 Na ndakisa, mobali moko oyo ayokaki nsango malamu azalaki na mituna mingi ya kotuna, mpe azwaki biyano ya Biblia na mituna na ye nyonso. Lokola makambo oyo ayokaki esimbaki mpenza motema na ye, abandaki koyekola Biblia mbala mibale na pɔsɔ mpe abandaki koyangana na makita. Akamwaki mingi ndenge oyo bayambaki ye na Ndako ya Bokonzi, mpo mingi kati na bayangani bazalaki bato ya loposo mosusu. Nsima ya mwa ntango moke, ye na mwasi na ye basalaki mbongwana na bomoi na bango mpe bazwaki batisimo. Banda ntango wana asalisi bato soki 40 mpo ete bákóma basaleli ya Yehova, bakisa mpe bandeko na ye mingi. Atako azalaka na bokɔnɔ moko oyo etungisaka ye, auti kobanda mosala ya mobongisi-nzela.
5 Tóteya basusu: Makambo oyo ezali koleka na mokili esili kotinda bato mingi ya sembo ete bátalela lisusu makanisi na bango mpe bomoi na bango. Lokola Yesu, biso mpe tosengeli kozala na mposa ya kosalisa bango. Sɛkɛlɛ mpo na kolonga kosalisa bato ya sembo ete báyekola monɔkɔ ya pɛto ezali bongo ya komibongisa malamu mpo na kozongela bango mpe koyekola na bango Biblia.
6 Lolenge ya malamu mpo na kosalisa bato oyo bazali kosala misala na ndako ezali ya kobanda mbala moko boyekoli ya Biblia na mokuse ntango kaka tokutani na bango. (km 5/02 lok. 1) Osilaki komeka ndenge wana? Ntango ozali komibongisa mpo na kozongela bato, poná lolenge moko ya kobanda lisolo oyo ebongi na moto oyo okuti ye na ndako na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2002. Ndenge mingi ya kobanda masolo oyo epesami na siplema yango ezali kotinda na kobanda lisolo mbala moko na moto kati na mwa buku Azali kosɛnga to na buku Boyebi. Ezali malamu omimesenisa na ndenge yango ya kobanda masolo mpo okoka kokɔtisa ye na mayele mpenza na paragrafe. Poná vɛrsɛ moko to vɛrsɛ mibale na paragrafe mpo na kotánga yango mpe kolimbola yango, mpe bongisá motuna oyo okosukisa na yango lisolo na yo. Motuna yango ekosalisa mpo na koleka na paragrafe oyo okani kotalela na mbala ekoya ntango bokokutana.
7 Basaleli ya Yehova bazali kozwa mapamboli mingi na ndenge bayekoli monɔkɔ ya pɛto. Tiká tósalisa basusu na molende ete básangana na biso mpo na ‘kobelela nkombo ya Yehova’ mpe ‘kosalela ye elongo na biso esika moko.’—Sef. 3:9.