Makanisi mpo na ndenge ya kolakisa buku Pusaná Penepene na Yehova
◼ Na Biblia na mabɔkɔ, lobá boye: “Bato mingi oyo bandimelaka Nzambe balukaka kopusana penepene na ye. Oyebi ete Nzambe asɛngaka biso tópusana penepene na ye? [Tángá Yakobo 4:8.] Mokanda oyo ebongisami mpo na kosalisa bato básalela Biblia na bango mpo na kopusana penepene na Nzambe.” Tángá paragrafe 1 na lokasa 16.
◼ Na Biblia na mabɔkɔ, lobá boye: “Lelo oyo, bosembo ezali te. Ezali kaka ndenge balobi awa. [Tángá Mosakoli 8:9b.] Bato mingi bamitunaka soki Nzambe amibanzabanzaka kutu na likambo yango. [Tángá bafraze mibale ya liboso ya paragrafe 4 na lokasa 119.] Mokapo oyo ezali kolimbola ntina oyo Nzambe atiki nzela ete bosembo ezala te mpo na mwa ntango.”