Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/02 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 12/02 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Bokoki mpe kolakisa buku: La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?; Mokanda mpo na masolo ya Biblia to Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Yanuali: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimisamaki liboso ya mobu 1988. Masangá oyo ezali na mikanda yango te ekoki kolakisa buku L’humanité à la recherche de Dieu. Febwali: Tokolakisa buku ya sika Pusana penepene na Yehova (na Lifalanse). Marsi: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.

◼ Nkasa ya libyangi na Ekaniseli mpo na mobu 2003 ekotindama na lokota oyo lisangá mokomoko esalelaka na makita na yango. Soki ezali na nkota mosusu oyo elobamaka na teritware na bino mpe soki bolingi bátindela bino nkasa ya libyangi na nkota yango, bosengeli kosɛnga yango nokinoki; bokosalela formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Nkasa ya libyangi na Ekaniseli ekobimisama na Kiluba, Lifalanse, Lingala, Monokutuba, Otetela, Swahili, Tshiluba mpe Uruund.

◼ Ekaniseli mpo na mobu 2004 ekosalema na mokolo ya eyenga mwa 4 Aprili nsima ya kolala ya moi. Liyebisi oyo epesami liboso mpo ete bipai oyo masangá mingi bazali kosalela Ndako ya Bokonzi bobele moko, masangá mosusu ekoka kozwa bibongiseli mpo na koluka bisika mosusu ya kosala Ekaniseli. Bankulutu basengeli kosolola na mokóló esika yango mpo na komindimisa ete makambo mosusu ekosalema te na esika yango, noki te ekotya mobulu na molulu ya Ekaniseli. Yango ekopesa nzela ete Ekaniseli esalema na kimya mpe na mobulu te. Lokola likambo yango ezali na ntina mingi, lisangani ya bankulutu esengeli kopona nkulutu oyo azali na makoki mingi mpo na kosala lisukulu na esika ete básalaka yango moto na moto na ngala na ye to básalelaka bobele ndeko moko mbula na mbula. Soki bozali na nkulutu moko mopakolami oyo azali molobi malamu, ye akosala lisukulu yango.

◼ Basakoli nyonso oyo bazwá batisimo baoyo bakozala na Likita ya Mosala na pɔsɔ oyo ebandi na 5 Febwali bakoki kozwa kalati “Instructions médicales prévisionnelles” mpe Documents d’identité médicaux mpo na bana na bango.

◼ Tomoni ete masangá mingi ezali kosɛnga ebele ya babuku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Tolingi kokundwela bandeko ete buku yango ebongisami bobele mpo na baoyo bazali bana-kelasi na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, kasi mpo na bato ya libándá te. Mpe, soki kaka buku yango ekómi na nkota oyo bosalelaka na masangá na bino, tokotinda yango mbala moko na masangá.

◼ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2003 ekozala na lisolo “Mpo na nini Nzambe atiki nzela ete mabe ekómelaka biso?” Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (20 %) kaka mpo na nimero wana.

◼ Mbongwana esalemi na ndenge oyo Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekotambwisama na ntango ya boyei ya mokɛngɛli ya zongazonga. Kobanda na sanza ya Yanuali 2003, nsima ya loyembo mpe libondeli ya ebandeli, eteyelo ekosalema na miniti soki 25. Lisolo ya Toli mpo na koloba malamu ekosalema na miniti 5, lisukulu mpo na koteya lisangá na miniti zomi, mpe makanisi ya ntina ya botángi ya Biblia na miniti zomi. Masolo No. 2, 3, mpe 4 ekosalema te. Nsima ya eteyelo, Likita ya Mosala ekolanda na miniti 30. Nsima ya loyembo, mokɛngɛli ya zongazonga akosala lisolo na ye na miniti 30, mpe loyembo na libondeli ya nsuka ekolanda.

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Lifalanse: Esakweli ya Yisaya​​—⁠Pole mpo na bato nyonso II (Makomi ya minene).

Kiluba na Otetela: Ozali na elimo oyo ekufaka te? (Trakte No. 25).

Lingala na Tshiluba: Ozali na elimo oyo ekufaka te? (Trakte No. 25); Tósambela Nzambe kaka moko ya solo.

Monokutuba: Yehova​​—⁠Azali nani? (Trakte No. 23); Yesu Klisto​​—⁠Azali nani? (Trakte No. 24).

Swahili: Tósambela Nzambe kaka moko ya solo.

◼ Kasɛti video ya sika oyo tozali na yango:

Elobeli ya Bikela ya Amerika: Mokanda mpo na Masolo ya Biblia (Vol. 2 na 3).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto