Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/02 lok. 3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 6/02 lok. 3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yuni: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Soki bato oyo tokei kotala bazali na mikanda yango, tokotikela bango mwa buku mosusu oyo eyokani na mposa na bango, oyo ezali na lisangá. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele!, mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Tokoki mpe kolakisa mwa babuku oyo, soki esengeli: Bilimo ya bakufi​—⁠Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nos problèmes​​—⁠Qui nous aidera à les résoudre?; Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? mpe Un livre pour tous.

◼ Tozali kosɛnga na bandeko nyonso oyo balingi kosolola na biro básalaka yango na nzela ya mikanda. Ezali mpenza malamu te kosolola na Biro na nzela ya foni. Bokoki kosala yango kaka soki ezali na likambo moko oyo ebimi mbalakaka, mpe ezali kosɛnga ete Biro apesa eyano nokinoki to alakisa nokinoki ndenge ya kosala. Longola kaka mpo na makambo oyo ebimi mbalakaka, mpo na makambo mosusu tosɛngi bino, soki bolingi kosolola na Biro na nzela ya foni, bósalaka yango na mikolo mosusu te kaka na mokolo ya mosala moko. Yango ekopesa biso likoki ya kobongisa programɛ na biso ya mosala. Soki makambo oyo bolingi koyebisa Biro na foni ezali ya sɛkɛlɛ te, ekozala malamu kokoma yango na papye mpe kopesa moto ya foni mpo akoka kobenga Biro mpe koyebisa ye yango. Ata ndenge nini, ezala nsango yango to avis d’appel, bosengeli ntango nyonso kotinda yango epai ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’ ” na esika ya kotinda yango epai ya moto moko. Ezali mpe na ntina mingi koyebisa polele soki bolingi kosolola na departema nini ya Biro, na ndakisa Bureau des assemblées, Comptabilité, Bureau de service, Expédition, mpe bongo na bongo.

◼ Tozwaki nsango ete na bisika mosusu na teritware na biso bandeko mosusu balyaki mbuma ya nzete ya ricin mpe bazwaki pwazɔ ya makasi na nzoto. Ezali solo ete bamɛlaka mafuta ya ricin mpo na kosukola libumu. Kasi mbuma ya nzete yango ezali na pwazɔ ya makasi oyo esalaka ete bato bályaka yango te. Yehova apesá biso milona mpe mbuma ndenge na ndenge oyo tosalelaka mingi lokola bilei. Ezali mabe te koluka milona mpe mbuma mosusu oyo tomeseni na yango te mpo epesa biso bilei oyo tokoleisa na yango libota na biso. Kasi, soki toyebi yango malamumalamu te, ekozala malamu tótuna bato oyo bayebi milona yango mpe oyo basilá kolya yango. Na likambo yango, Lamuká! elakisaka biso makambo oyo ekoki kosalisa biso.

◼ Lamuká! ya 22 Yuli 2002 (na Lifalanse) ekozala na lisolo oyo: “Masano ya mbongo esalaka moto eloko te?” Lokola motuna yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (20 %) koleka ndenge bazwaka liboso.

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Kiluba: Yesu Klisto​​—⁠Azali nani?

Lifalanse: Annuaire 2002.

Lingala: Batatoli ya Yehova​—⁠Bazali banani? Makambo nini bandimaka?

Lingelesi: Esakweli ya Yisaya​​—⁠Pole mpo na bato nyonso II​​—⁠Na makomi ya minene; Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (volime relye 2001).

◼ Mikanda oyo tozali na yango:

Lingala: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?

Uruund: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?; Okoki kozala moninga ya Nzambe!; Sepela na bomoi ya seko na Mabele!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto