Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Mai.
“Okanisi ete biso bato tokoki mpenza koyeba Nzambe? [Tiká ye apesa eyano.] Yo mpe ondimaka ete ezali mpasi kondimela moto oyo oyebi ye malamu te. Kutu, Biblia elendisaka biso tóluka Nzambe. [Tángá Misala 17:27.] Masolo oyo ezali awa ezali komonisa biso ndenge oyo tokoki koyeba Nzambe malamu mpenza.”
Lamuká! 22 Mai
“Bakonzi ya mokili oyo basili komeka makanisi ndenge na ndenge mpo na koluka kosilisa mikakatano na biso. Mayele mosusu oyo bauti kozwa sika babengi yango mondialisation. Ntango okotánga zulunalo oyo, okomona ndenge oyo ntango mosusu mayele wana ya sika esili kobanda kobongola makambo na bomoi na yo. Okotánga mpe likambo moko oyo Biblia esakolaki ete yango nde ekosilisa mikakatano nyonso ya bato na mokili mobimba.” Na nsima tángá Matai 6:9, 10.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuni
“Makambo oyo eutaki kosalema na mokili ezali kotinda bato mingi bámituna mpo na nini bato oyo basali eloko te bazali kokufa liwa ya mbalakaka. Osilá koluka koyeba mpo na nini bato bakufaka? [Tiká ye apesa eyano, mpe na nsima lakisá ye etanda oyo ezali na lokasa 7.] Okosepela koyeba oyo Biblia elobi mpo na likanisi moko na kati ya makanisi oyo bato mosusu bazalaka na yango?” Soki likoki ezali, tángá vɛrsɛ moko na kati ya bavɛrsɛ oyo etyami wana.
Lamuká! 8 Yuni
“Bato mingi bakanisaka ete losambo na siansi ekoki koyokana te. Bamosusu kutu bakanisaka ete moto oyo alingi makambo ya siansi mingi akoki kondimela Nzambe te. Okanisi boni na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Lamuká! oyo elobeli likambo yango na ndenge ya polele mpenza.”