Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/02 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 3/02 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Marsi: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Basakoli bakoyebisa na bato oyo bazali kolakisa bango bazulunalo ete soki balingi, bakoki kopesa mwa likabo mpo na mosala yango oyo ezali kosalema na mokili mobimba. Soki moto moko amonisa mposa, tokolakisa mpe ye mwa buku Azali kosɛnga, mpe tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Yuni: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Soki bato oyo tokei kotala bazali na mikanda yango, tokotikela bango mwa buku mosusu oyo eyokani na mposa na bango, oyo ezali na lisangá.

◼ Basakoli oyo balingi kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Aprili basengeli komibongisa banda sikoyo mpe kotondisa noki baformilɛrɛ na bango. Yango ekopesa nzela na bankulutu bázwa bibongiseli oyo esengeli mpo na mosala ya kosakola mpe básɛnga bazulunalo mpe mikanda mingi. Sanza na sanza, bankombo ya baoyo nyonso bandimami lokola babongisi-nzela basungi esengeli koyebisama na lisangá.

◼ Ekaniseli ekosalema mokolo ya minei, mwa 28 Marsi 2002. Soki na lisangá na bino bosalaka makita na mokolo ya minei, makita yango esengeli kosalema mokolo mosusu kati na pɔsɔ soki Ndako ya Bokonzi ekozala mpamba. Soki bokoki kosala bongo te mpe likoki ya kosala Likita na bino ya Mosala ezali te, bokoki kokɔtisa masolo ya likita yango, oyo etaleli mpenza lisangá na bino, na programɛ ya Likita mosusu ya Mosala.

◼ Biro ekondima te komande oyo mosakoli moko atindi mpo na mikanda na ye moko. Mokɛngɛli-mokambi akosala ete liyebisi epesamaka liboso ete lisangá etinda komande na yango ya mikanda na biro. Yango ekosalisa baoyo nyonso bazali na mposa ya kozwa mikanda mpo na bango moko ete bákoka koyebisa yango na ndeko oyo azali kotalela mikanda. Bóbosana te mikanda nini oyo ezali na molɔngɔ ya articles sur demande spéciale.

◼ Sanza na sanza, soki mokɛngɛli-mokambi azwi mokanda oyo emonisaka ete biro ya filiale ezwaki makabo nyonso lisangá etindaki na sanza mobimba, akokeba ete mbala ya nsima oyo bakopesa lapolo ya kɔnti na lisangá, bátánga mpe mwa mikanda yango oyo etali “Makabo mpo na mosala ya botongi Bandako ya Bokonzi” mpe oyo etali mosala ya kosakola na mokili mobimba.

◼ Bókeba na bakosi oyo bakómi kosalela Internet mpe kotindela bandeko mikanda mpo na kosɛnga mbongo, oyo bazali kokosa ete ezali mpo na kosalisa bandeko na biso oyo bazwi makama. Soki makambo esɛngi ete Komite mpo na kopesa Batatoli ya Yehova lisalisi esalema, tokozanga te kokómela bankulutu ya lisangá.

◼ Ekómaka ete bato oyo basalaka baankɛtɛ bákutana na bandeko na biso mpo na kotuna bango mituna mpo na koyeba makambo na biso Batatoli ya Yehova mpe ebongiseli na biso. Bapesaka bandeko yango nkasa oyo ezali na mituna oyo etali bindimeli mpe mateya na biso, mpe basɛngaka bango báyanola na mituna yango. Soki mosakoli moko akutani na bato ya ndenge wana, asengeli koyebisa bango nkombo ya mokɛngɛli-mokambi. Bankulutu bayebi ndenge ya kosala mpo na bato oyo bazali kosala baankɛtɛ ya ndenge wana mpe bakoki kopesa biyano oyo ebongi, na kotalela makanisi oyo ezali na mokanda ya 25 Aprili 2001, oyo etindamaki na masangani nyonso ya bankulutu.

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Lifalanse, Lingelesi: Tótángaka Makomami mokolo na mokolo 2002.

◼ Kasɛti video ya sika oyo tozali na yango:

Na elobeli ya bikela ya Amerika: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo​​—⁠volimi 2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto