Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/01 nk. 5-6
  • Bozongeli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 8/01 nk. 5-6

Bozongeli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi

Bozongeli ekosalema wana babuku ekangami, na kotalela masolo masalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda pɔsɔ ya 7 Mai tii pɔsɔ ya 20 Augusto 2001.

[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá kaka Biblia. Mitindami mipesami na motuna nyonso ezali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai nyonso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]

Yanolá Solo to Lokuta na moko na moko na maloba malandi:

1. Libondeli oyo ezali na Nehemia 2:4 esalemaki na miniti ya nsuka mpenza ntango elikya ezalaki lisusu te. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 15/2 lok. 25 par. 8.]

2. Liloba ya Grɛki ékklêsia oyo ebongolami na liloba “lisangá,” yango ezali kopesa likanisi ya bomoko mpe kosungana. [w99 15/5 lok. 25 par. 4]

3. Atako basaleli ya Yehova baboyaka mimeseno oyo eyokani te na Liloba ya Nzambe, mimeseno oyo esalemaka ntango moto akufi, kasi baboyaka te mimeseno nyonso oyo etali liwa. (Yoa. 19:40) [rs lok. 257 par. 4]

4. Ntango Yobo azalaki na bomoi, ezalaki kaka ye moko nde azalaki sembo epai ya Yehova. (Yobo 1:8) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w92 1/8 lok. 31 par. 3-4.]

5. Lokola Saulo, to Paulo azalaki kokokisa bamposa na ye ye moko na kotongáká bahema, yango emonisi ete autaki na libota moko ya bozwi te. (Mis. 18:2, 3) [w99 15/5 lok. 30 par. 2–lok. 31 par. 1]

6. Atako Davidi asalaki masumu minene, Yehova akokaki koloba ete “[alandaki] ngai na motema na ye mobimba” mpamba te Davidi abongolaki motema mpe azalaki na bizaleli malamu. (1 Mik. 14:8) [w99 15/6 lok. 11 par. 4]

7. Longola kaka soki likambo oyo tolaki ezali na boyokani te na Makomami, tosengeli kosala nyonso mpo na kokokisa bilaka na biso ata soki ezali mpasi mpo na kokokisa yango. (Nz. 15:4) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w89-F 15/9 lok. 28 par. 5.]

8. Nzembo 22:1 emonisi ete ntango akutanaki na mitungisi, Davidi abungisaki kondima na ye mpo na mwa ntango moke. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 15/8 lok. 20 par. 19.]

9. Mitungisi, mawa na motema, mpe mikakatano na bakonzi ya mboka to kozanga mbongo ekoki ‘kokweisa’ moklisto moko; kasi na lisungi ya elimo ya Nzambe mpe ya basaleli na ye oyo batondi na bolingo, moklisto yango “akobwakama” libela te na elimo. (Nz. 37:23, 24) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 1/11 lok. 30 par. 14.]

10. Mokapo ya liboso ya Genese ezali koteya ete Nzambe azalisaki biloko nyonso oyo ezali awa na mabele na boumeli ya mikolo motoba ya ngonga 24. [rs lok. 148 par. 4]

Yanolá na mituna oyo milandi:

11. Ndenge nini Ezela na bato oyo bazalaki kosunga ye ‘bapesaki ndimbola’ ya mibeko? (Neh. 8:8, NW) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 15/2 lok. 26 par. 4.]

12. “Esengo ya Yehova” eutaka na nini? (Neh. 8:10) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 15/2 lok. 26 par. 9.]

13. Mpo na nini baoyo “bamipesaki na motema mobimba mpo na kofanda na Yelusaleme” bapambolamaki? (Neh. 11:2) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 15/2 lok. 26 par. 12.]

14. Mpo na nini Esetele aumelaki mpo na koyebisa mokonzi makanisi na ye? (Est. 5:6-8) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 15/3 lok. 24 par. 18.]

15. Wapi mituna mibale ya ntina oyo mokanda ya Yobo ezali kopesa biyano na yango? [si-LI lok. 95 par. 1]

16. Mpo na nini toli ya Elifaza elɛmbisaki Yobo mpe alongaki te kolendisa ye? (Yobo 21:34; 22:2, 3) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w95 15/2 lok. 27 par. 5-6.]

17. Nzembo ezali nini? [si-LI lok. 101 par. 2]

18. Ndenge emonisami na Nzembo 2:1 (NW), wapi “likambo ya mpamba” oyo mabota balandi ‘koyanga mwango’? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 15/8 lok. 20 par. 5.]

19. Na likambo etali ezaleli ya kozanga koponapona liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Filipo ateyaki Basamalia mpe mosali moko ya Leta ya Etiopia? (Mis. 8:6-13, 26-39) [w99 15/7 lok. 25 par. 2].

20. Yobo asalelaki ndakisa nini mpo na komonisa kondima na ye ete Nzambe akokaki kosekwisa ye uta na lilita, esika oyo azalaki kotalela yango lokola ebombamelo mpo na bampasi na ye? (Yobo 14:7, 13-15) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w00 15/5 lok. 27 par. 7–lok. 28 par. 1.]

Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ milandi:

21. Esetele 8:17 elobi ete bato bango moko “babongwanaki Bayuda”; ndenge moko mpe lelo oyo, “․․․․․․․․” ya “bampate mosusu” bamitii na ngambo ya ․․․․․․․․. (Emon. 7:9; Yoa. 10:16; Zek. 8:23) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 15/3 lok. 25 par. 14.]

22. Ndenge Misala 1:7 emonisi yango, atako Yehova alandelaka ․․․․․․․․ malamu, mokolo na ye ya kokata makambo ekoya lokola ․․․․․․․․, ntango bato bazali kokanisa yango te. (2 Pet. 3:10) [w99 1/6 lok. 5 par. 1-2]

23. Na 2 Petelo 3:7, 10 (NW), liloba “makoló” mpe “mabele” esalelami na ․․․․․․․․ ndenge maloba oyo ezali pembenimpembeni emonisi yango, “mabele” elakisi ․․․․․․․․. [rs lok. 405 par. 2-4]

24. Kosolola malamu elekaka ntango bato bazali kotyelana motema mpe bazali komitya na esika ya moninga. Mwasi na mobali bakolisaka bizaleli yango ntango bandimi kofanda na libala ․․․․․․․․ mpe bakati ․․․․․․․․ mpo na kokokisa yango. [w99 15/7 lok. 21 par. 3]

25. Kolanda baninga malamu ekoki kosalisa biso ․․․․․․․․ mibeko mpe masɛngami ya elimo mpe ekosalisa biso tósalela Yehova na ․․․․․․․․. [w99 1/8 lok. 24 par. 3]

Poná eyano ya malamu na maloba oyo malandi:

26. Koloba ete Moledekai “afandaki na ekuke ya mokonzi” emonisi ete azalaki (kokɛngɛla mokonzi; moko na basali ya Mokonzi Asierise; azalaki kozela mpo akɔta kosolola na mokonzi) (Esetele 2:19, 20) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 15/3 lok. 24 par. 9.]

27. Ndenge ekomami na Yobo 19:25-27, Yobo amonisaki kondima na boye ete akokaki “komona Nzambe” na ndenge oyo ete (alingaki kozwa emonaneli; akosekwisama mpo na bomoi na likoló; miso na ye ya bososoli efungwamaki mpo na komona solo na ntina na Yehova). [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w94 15/11 lok. 19 par. 17.]

28. Bato bakanisaka Yobo mingi mpenza mpo na (bolingo na ye; boboto na ye; ezaleli na ye ya koyika mpiko) [si-LI lok. 100 par. 41]

29. Emonani ete kokomama ya mokanda ya Nzembo esalemaki na boumeli ya mbula pene na (nkama misato; nkama mitano; nkóto) [si-LI lok. 101 par. 4]

30. Na ntembe te, (Davidi; Asafa; Ezela) nde abongisaki mokanda ya Nzembo ete ekóma na lolenge ezali kino lelo. [si-LI lok. 102 par. 6]

Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nse:

Neh. 3:5; Nz. 12:2; 19:7; 2 Tim. 3:16, 17; Yak. 5:14-16

31. Na esika ya kokanisa ete kosala mosala ya makasi ekitisaka moto kilo, tosengeli nde kondima komipesa na yango; lolendo etinda biso te ete tóboya yango. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 15/2 lok. 25 par. 12, 19.]

32. Moklisto oyo akómi kosala makambo ya mabe mpenza asengeli koyebisa lisumu na ye epai ya bankulutu. [rs lok. 71 par. 9]

33. Na ntango ya kala, Nzambe azalaki kosalela bandɔtɔ mpo na kopesa makebisi, malako, mpe bisakweli epai ya basaleli na ye, kasi lelo oyo azwi bibongiseli mpo na lobiko na biso na nzela ya liloba na ye epemami oyo akomisaki. [rs lok. 334 par. 6]

34. Soki tolingi kozala baninga ya Nzambe, tosengeli kozala na bosembo oyo euti mpenza na motema, kozanga bokosi. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w89-F 15/9 lok. 26 par. 7.]

35. Kotosa mibeko ya Nzambe elamwisaka molimo ya moto, epesaka ye mpe bolamu. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w00 1/10 lok. 13 par. 4.]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto