Landá “kosala oyo ezali malamu”
1 Osalaki mpenza malamu ntango okómaki mosaleli ya Yehova Nzambe. Kasi, na ntango oyo ya mpasi, kolanda “kosala oyo ezali malamu” ezali likambo ya lisɛki te. (Gal. 6:9, NW) Atako yango ezali kosɛnga milende mingi, okoki kosala yango. Ndenge nini?
2 Kolisá makanisi lokola oyo Yesu azalaki na yango: Lokola Yesu, okoki koyikela minyoko mpiko soki otii makanisi na yo na elikya oyo Bokonzi ezali kopesa biso. (Ebe. 12:2, 3) Ndimá mpenza ete Yehova alingi yo mpe alingi ete olonga. (2 Pet. 3:9) Tyelá ye motema na yo mobimba, na elikya ete akosalisa yo. (1 Kol. 10:13) Saláká mabondeli ntango nyonso, sɛngá Yehova ete asalisa yo mpo oyika mpiko. (Lom. 12:12) Sepelá na elikya ete ezaleli na yo ya koyika mpiko ekosala ete Nzambe andima yo. (Lom. 5:3-5, NW ) Soki ozali kokolisa na bosembo mpenza “makanisi ndenge moko na oyo Klisto Yesu azalaki na yango,” yango ekosala ete ozala na esengo mpe ekosepelisa motema ya Yehova.—Lom. 15:5, NW; Mas. 27:11.
3 Landá kosala makambo oyo ezali malamu: Zwá matomba mpenza na bibongiseli oyo Yehova azali kozwa mpo na kosalisa basaleli na ye ete bálanda kosala oyo ezali malamu. Zalá na momeseno malamu ya kotánga Liloba ya Nzambe mpe koyekola mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo ebongisami na moombo ya sembo mpe ya mayele. Bongisáká malamumalamu makita nyonso ya lisangá, yanganáká na makita yango, mpe pesáká biyano na makita yango nyonso. Liboso mpe nsima ya makita zaláká elongo na bandeko na yo ya elimo. Omityela mikano oyo okoki kokokisa mpo na mosala ya kosakola; mikano yango esengeli kopesa yo nzela ete osakola mingi mpe obongisa lisusu lolenge na yo ya kolakisa nsango malamu epai ya bato mosusu.
4 Ezali na ndenge wana nde okoki kolanda kosala oyo malamu mpe kozwa esengo mingi. Mpo na yango, ndeko moko na Italie alobaki boye: “Soki butu eyindi, nsima ya kolekisa mokolo mobimba na mosala ya Yehova, lokuta mabe, nazongaka na ndako nasili kolɛmba mpenza. Kasi nazalaka na esengo, mpe natɔndaka Yehova mpo na ndenge oyo apesi ngai esengo oyo moto moko te akoki kolongola yango.” Ndenge moko, yo mpe okozwa esengo mingi soki olandi kosala oyo ezali malamu.