Esengeli kosala nini soki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebongisami mpo na koyekola eyei naino te?
Ekómaka ete masangá ezwa te Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ngonga ebongi mpo na koyekola yango na kolanda programe ya boyekoli na mokili mobimba. Soki makambo ezali ndenge wana, esengeli kosala nini? Ezali na lolenge mibale ya kosala.
Ya liboso, na bisika mosusu na teritware na biso, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekómaka kaka nsima ya ntango oyo esengeli kokóma. Na yango, lisangani ya bankulutu bakozwa bibongiseli mpo ete ezala momeseno ya koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli sanza mibale to misato nsima ya programe ya boyekoli na mokili mobimba, yango ekotalela ntango oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekómelaka bango. Na yango, moto nyonso na kati ya lisangá akoyeba nimero nini ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo bakoyekola.
Ya mibale, ntango mosusu Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekómaka na masangá na dati oyo etyami te kaka mpo na mwa ntango. Likambo yango ekómaka kozanga ete la Société akana yango. Soki likambo ya bongo ekómi, masangá ekoyekola nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya mbula oyo eleki. Na ndakisa, elingi koloba soki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo balingaki koyekola ezali ya 1 Mai 2001 mpe yango ekómi na masangá te, masangá ekoyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 2000. Soki nsima na yango bazwi sikoyo mwa liboke ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo esengeli koyekolama mokili mobimba na mikolo oyo ekolanda, basengeli kolanda mbala moko programe ya boyekoli na mokili mobimba. Basengeli te koluka koyekola lisusu, na likita ya boyekoli ya Linɔ́ngi, masolo oyo bayekolaki te. Nzokande, lisangani ya bankulutu ekozwa bibongiseli mpo masolo yango esalema na lisangá na ndenge ya masukulu ya bato nyonso; lisolo moko ezali lisukulu moko. Na yango, soki na kati ya nimero moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki na masolo mibale to misato mpo na boyekoli, masolo yango ekokóma masukulu ya bato nyonso mibale to misato. Balobi oyo bakoponama basengeli kokeba ete balobela kaka makambo oyo eyokani na oyo ezali na kati ya lisolo yango.
Tozali kolendisa mosakoli mokomoko mpe mabota nyonso ete bábatela malamu Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na bango mpo bakoka komona nokinoki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya mbula oyo eleká soki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo esengeli kosalelama na kotalela programe ya boyekoli na mokili mobimba ekómi noki te. La Société akosala ntango nyonso makasi mpo ete masangá nyonso ezwaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ngonga malamu mpo bakoka kolanda programe oyo ebongisami na mokili mobimba.