Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/01 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 2/01 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Febwali: Emoniseli​—kokokana na yango monene ebelemi!, La vie comment est-elle apparue? Évolution ou création? to buku nyonso ya nkasa 192 oyo ezali na libombo ya lisangá. Marsi: Buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokolakisa mpe buku Boyebi to mwa buku Azali kosɛnga mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.

◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Marsi to mwa moke nsima na yango soki likoki ezali. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.

◼ Mokomeli ya lisangá mpe mokɛngɛli na mosala ya kosakola basengeli kotalela mosala ya babongisi-nzela ya sanza na sanza. Soki moko kati na bango azali na mokakatano ya kokokisa ngonga oyo esɛngami, bankulutu basengeli kozwa bibongiseli mpo ete azwa lisungi oyo esengeli. Talá mokanda ya la société S-201 ya 1 Ɔkɔtɔbɛ mpo na kozwa makanisi. Talá mpe lisolo oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 1987, na lokasa 3.

◼ Mokomeli ya lisangá asengeli ntango nyonso kotinda na biro ya kotonga bandako ya Bokonzi makambo nyonso ya sika etali bomoi ya mosakoli mokomoko oyo azwá batisimo mpe atondisi formilɛrɛ (S-82) mpo na kosala lokola mosali ya bolingo malamu mpo na botongi Bandako ya Bokonzi. Soki bomoi ya ndeko yango ebongwani, na ndakisa soki alongwe esika oyo azalaki kofanda to soki akómi mosaleli na misala to nkulutu, asengeli kotondisa nokinoki formilɛrɛ mosusu. Soki ndeko moko abongoli adresi na ye to nimero na ye ya telefone, to soki azali lisusu na etamboli ya malamu te na kati ya lisangá, bankulutu basengeli koyebisa yango nokinoki na biro ya kotonga bandako ya Bokonzi na nzela ya mokanda.

◼ Ekaniseli mpo na mobu 2002 ekosalema na mokolo ya minei 28 Marsi nsima ya kolala ya moi, kasi te na mokolo ya minei 22 Marsi ndenge yango emonisami na Calendrier 2001. Liyebisi oyo epesami liboso mpo ete bipai oyo masangá mingi ezali kosalela Ndako ya Bokonzi bobele moko, masangá mosusu ekoka kozwa bibongiseli mpo na koluka bisika mosusu ya kosala Ekaniseli. Bankulutu basengeli kosolola na mokóló esika yango mpo na koyeba soki makambo mosusu ekosalema te na esika yango na mokolo oyo Ekaniseli ekosalema. Yango ekopesa nzela ete Ekaniseli esalema na kimya mpe na mobulu te. Lokola likambo yango ezali na ntina mingi, lisangani ya bankulutu esengeli kopona nkulutu oyo azali na makoki mingi mpo na kosala lisukulu na esika ete básalaka yango moto na moto na ngala na ye to basalelaka bobele ndeko moko mbula na mbula. Soki ezali na nkulutu moko mopakolami oyo azali molobi malamu, ye akosala lisukulu yango.

◼ Na bokeseni na oyo eyebisamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Marsi mpe Sɛtɛmbɛ 2000 bakisá mpe mwa buku S-15, lokasa 5, paragrafe 1.1.1, tozali kosɛnga na masangá ete basengeli te kotinda komande na bango ya mikanda sanza nyonso. Bakoki kosala komande ya sika (S-14) soki bazwi mikanda oyo basɛngaki na komande na bango ya liboso. Lokola na mikolo oyo ezali mpasi mpo bakomande na bino ekómela biso mpe mpo tókomisela bino mikanda, bisika oyo tobombaka mikanda awa ekómi moke mpe ezali kokoka te ete tókokisa mposa makasi ya masangá oyo ezali kosɛnga mikanda.

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Kiluba, Tshiluba: Nzembo mpo na kokumisa Yehova (ya monene).

Lifalanse: L’enfer de feu fait-il partie de la justice de Dieu? (T-74).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto