Zalá moto oyo atosaka na esengo
1 Yesu alobaki ete na ntango ya kozala na ye, bato mingi ‘bakotya likebi te,’ bobele ndenge ezalaki na ntango ya Noa. (Mat. 24:37-39) Yango wana toyebi ete bato mingi bakoboya koyoka nsango malamu ya Bokonzi. Nini ekosalisa biso tóbatela esengo na biso wana tozali kosala mosala na biso ya kosakola?—Nz. 100:2.
2 Ya liboso, tosengeli kobosana te ete nsango oyo tozali na yango mpe mokumba na biso ya kosakola euti na Nzambe. Soki bato bazali kosepela te na nsango oyo tozali kosakolela bango, ata tozali kosala milende mingi mpenza, tosengeli koyeba ete bazali nde koboya Yehova. Soki tozali koyeba ete bosembo na biso na mosala ya kosakola esepelisaka Nzambe, yango ekosala ete tóbatela esengo na biso ya motema lokola batosi ya liloba ya Nzambe.—Yak. 1:25.
3 Ya mibale, ezali naino na bato oyo bakondima bibongiseli ya Yehova mpo na lobiko. Ata soki bato mingi bazali kosepela te, tosengeli koyeba ete ezali naino na bato oyo bakokani na bampate oyo basengeli koyanganisama ata lelo oyo na mikolo ya nsuka mpenza. Tosengeli kosakola ntango nyonso, kokende na “mboka monene nini to mboka moke nini” mpo na ‘koluka soko nani azali moto malamu [kati na] yango.’—Mat. 10:11-13.
4 Zalá na makanisi malamu: Bato mosusu basili kolɛmba nzoto mpo na makambo mabe oyo mangomba ya lokuta ezali kosala. Bato mosusu “balɛmbi mpe balemalemi” mpo na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo. (Mat. 9:36) Bato mingi bazali komitungisa mpenza mpo bazangi mosala, mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango, mpe mpo na libateli na bango. Soki toyebi makambo oyo nyonso, yango ekosalisa biso tókoba kati na mosala na biso. Tósala makasi mpo na kobanda lisolo na bato na makambo oyo ezali kobima na mokili, oyo ezali mpenza kotungisa bato na teritware na biso. Salisá bango bámona ete Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi wana nyonso. Salelá mikapo ya Makomami mpe makambo ya sikisiki oyo ezali na mikanda na biso mpo na kosimba mitema na bango na nsango malamu.—Ebe. 4:12.
5 Bato oyo batosaka liloba ya Nzambe na esengo nyonso bayebaka ntango nyonso ete: “Esengo na Yehova ezali nguya na [biso].” (Neh. 8:10) Tozali na ntina moko te ya kozanga esengo. “Soki mpe ndako ezali na malamu, tiká ete kimya na bino efanda na yango. Nde soko ezali na malamu te, tiká ete kimya na bino [ezonga] epai na bino.” (Mat. 10:13) Yehova azali ntango nyonso kopesa biso esengo mpe kolendisa biso wana tozali kolendendela kati na mosala ya bulɛɛ, mpe azali kopambola bosembo na biso.