Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yanuali: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1986 soki ezali na libombo ya lisangá. Masangá oyo ezali na buku L’humanité à la recherche de Dieu bakoki mpe kolakisa yango. Febwali: Emoniseli—kokokana na yango monene ebelemi!; La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? to buku nyonso ya nkasa 192 oyo ezali na libombo ya lisangá. Marsi: Buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato. Aprili: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokolakisa mpe buku Boyebi to mwa buku Azali kosɛnga mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.
◼ Ekaniseli mpo na mobu 2002 ekosalema na mokolo ya minei 28 Marsi nsima ya kolala ya moi. Liyebisi oyo epesami liboso mpo ete bipai oyo masangá mingi ezali kosalela Ndako ya Bokonzi bobele moko, masangá mosusu ekoka kozwa bibongiseli mpo na koluka bisika mosusu ya kosala Ekaniseli. Bankulutu basengeli kosolola na mokóló esika yango mpo na koyeba soki makambo mosusu ekosalema te na esika yango na mokolo oyo Ekaniseli ekosalema. Yango ekopesa nzela ete Ekaniseli esalema na kimya mpe na mobulu te. Lokola likambo yango ezali na ntina mingi, lisangani ya bankulutu esengeli kopona nkulutu oyo azali na makoki mingi mpo na kosala lisukulu na esika ete básalaka yango moto na moto na ngala na ye to básalelaka bobele ndeko moko mbula na mbula. Soki ezali na nkulutu moko mopakolami oyo azali molobi malamu, ye akosala lisukulu yango.
◼ Bibongiseli ezwami mpo na kobimisa lisusu masolo mibale na Zande oyo elobelaki libala kati na bandeko. Masangá oyo elingi kozwa yango, ekoki kotinda komande na bango na badepo oyo ekopesa bango yango. Ntango bokosala komande bókoma boye: “wZN mariage.”
◼ Basakoli nyonso oyo bazwá batisimo baoyo bakozala na Likita ya Mosala na pɔsɔ oyo ebandi na 5 Febwali bakoki kozwa kalati “Instructions médicales prévisionnelles/Décharge” mpe Documents d’identité médicaux mpo na bana na bango.
◼ Kobanda na sanza ya Febwali, eleka mokolo ya 4 Marsi te, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala lisukulu ya sika ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo ete “Mokolo ya kosambisama—Ezali ntango ya kobanga to ya kozala na elikya?”
◼ Masangá esengeli kozwa bibongiseli ya malamu mpo na Ekaniseli, na mbula oyo yango ekosalema na mokolo ya lomingo mwa 8 Aprili, nsima ya kolala ya moi. Atako lisukulu ekoki kobanda liboso, limpa na vinyo esengeli kolekisama nsima ya kolala ya moi. Bótala malamu ngonga oyo moi elalaka na esika oyo bozali. Lokola likita moko te ekosalema na mokolo yango, longola bobele likita mpo na mosala ya kosakola, bibongiseli esengeli kozwama mpo na kosala Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mokolo mosusu. Bakɛngɛli ya zongazonga basengeli koyokanisa manaka na bango ya makita na pɔsɔ yango na oyo ya lisangá oyo bazali kotala. Atako ezali malamu ete masangá esala Ekaniseli na bisika ekeseni, yango ekoki ntango nyonso kosalema bongo te. Epai oyo masangá mingi ezali kosala makita na bango na Ndako ya Bokonzi moko, ntango mosusu likoki ekozala ete moko na masangá to mingi esalela bisika mosusu na mpokwa wana. Soki likoki ezali bokoki kotika miniti 40 kati na makita mibale mpo na kozwa ntango ya kopesa babyangami mbote, kolendisa bato oyo babandi kosepela na solo sika. Lisangani ya bankulutu basengeli kopona ebongiseli oyo ekozala malamu na esika oyo bafandi.
◼ Lisukulu ya sipesiale mpo na mobu 2001 oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ekosalema mokolo ya lomingo mwa 1 Aprili. Motó ya likambo ya lisukulu yango ezali: “Nani abika?” Plan na yango ekotindama nsima. Masangá oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakotala to oyo ekozala na liyangani ya zongazonga to ya mokolo moko na pɔsɔ yango, ekosala lisukulu ya sipesiale na pɔsɔ ya 9 Aprili. Lisangá moko te esengeli kosala lisukulu yango liboso ya mokolo ya 1 Aprili.
◼ Kobanda na nimero ya 1 Yanuali 2001, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekobanda kobima na Kaonde mbala moko na sanza. Soki ezali na masangá oyo basalelaka monɔkɔ yango, tozali kosɛnga na Komite ya Mosala bákomela biro ya filiale, báyebisa motángo ya basakoli oyo batángaka monɔkɔ yango.
◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:
Lifalanse, Lingelesi: CD-ROM Watchtower Library—1999.
◼ Kasɛti video ya sika oyo tozali na yango:
Na elobeli ya bikela ya Amerika: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko (Volimi 4).